< Ezayi 49 >

1 Boyoka ngai, bino bisanga; boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika: Yawe abengaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, azalaki kolobela kombo na ngai wuta mbotama na ngai;
Hearken, ye Coastlands, unto me, And give ear ye peoples afar off, —Yahweh, called me, from my birth, From my nativity, made he mention of my name;
2 akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye;
And he made my mouth, like a sharp sword, In the shadow of his hand, he concealed me, —And made of me a polished arrow, In his quiver, he hid me;
3 alobaki na ngai: « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »
And said to me My Servant, thou art, —Israel, in whom I will get myself glory.
4 Kasi ngai, nalobaki: « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
But I, said, To no purpose, have I toiled, For waste and mist—my vigour, have I spent, —Surely, my vindication, is, with, Yahweh, And, my recompence, with my God.
5 Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpo ete nazala mosali na Ye, mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,
Now, therefore, said Yahweh—Fashioning me from birth To be Servant to him, To restore Jacob unto him, And that, Israel, unto him, might be gathered And I be honourable in the eyes of Yahweh, And, my God, be proved to have been my strength,
6 Ye, Yawe, alobi: « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Yea he said—It is too small a thing, for being my Servant, That thou shouldest raise up the tribes of Jacob, And the preserved of Israel, shouldst restore, —So I will give thee to become a light of nations, That, my salvation, may reach as far as the end of the earth.
7 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe: « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
Thus, saith Yahweh—the Redeemer of Israel, his Holy One To him that is despised of the soul, To the abhorred of the nation To the servant of rulers, Kings, shall see and arise, Princes, lo! they have bowed themselves down, —Because of Yahweh, who is faithful, The Holy One of Israel, lo! he hath chosen thee.
8 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Na tango ya malamu, nakoyanola yo; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki;
Thus, saith Yahweh—In a time of acceptance, have I answered thee, In a day of salvation, have I helped thee, —That I may preserve thee And give thee as the covenant of a people, To establish the land, To bring into possession the desolate heritages;
9 mpo ete oloba na bakangami: ‹ Bobima, › mpe na bato oyo bazali kati na molili: ‹ Bokoma bansomi! › Boye bakozala lokola bibwele oyo ezali kolia matiti pene ya nzela, mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso oyo ebotaka matiti te.
Saying To them who are bound Go forth, To them who are in darkness, Shew yourselves, —By the roads, shall they graze, And on all bare places, shall be their pasture:
10 Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.
They shall neither hunger, nor thirst, Nor shall smite them the glowing sand, or the glaring sun, —For, he that hath compassion upon them, will lead them, And unto springs of water, will he conduct them.
11 Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela, mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene.
Then will I make of all my mountains, a road, And my highways, shall be upraised.
12 Tala, bakowuta penza mosika, ndambo moko na ngambo ya nor, ndambo mosusu na ngambo ya weste, mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. »
Lo! these, from afar, shall come in, —And lo! these, from the North and from the West, And these, from the land of Sinim.
13 Oh likolo, ganga na esengo! Oh mabele, sepela! Oh bangomba, boyemba banzembo! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
Shout in triumph—O heavens! And exult—O earth! And break forth, ye mountains, into shouts of triumph, —For Yahweh hath comforted his people, And on his humbled ones, taketh he compassion.
14 Kasi Siona alobaki: « Yawe asundoli ngai, Nkolo na ngai abosani ngai! »
But Zion had said. Yahweh hath forsaken me, —Even, My Lord, hath forgotten me!
15 Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te!
Can, a woman, forget, her sucking child, Past taking compassion on the son of her womb? Even these, may forget, Yet will, I, not forget, thee:
16 Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai; bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
Lo! on the palms of my hands, have I portrayed thee, —Thy walls are before me continually.
17 Bana na yo bakozonga na lombangu, kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo.
In haste are thy sons, —They who have been tearing thee down and laying thee waste, out of thee, let them go forth!
18 Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga: bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.
Lift up, round about, thine eyes and see, All those, have gathered themselves together—have come to thee! As I live, Declareth Yahweh, —Surely all those as an ornament, shalt thou put on, And bind them about thee for a girdle as a bride.
19 Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga, bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te; sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo, mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi bakozala mosika na yo.
Surely, as for thy wastes, and thy desolations, and thy land of ruins, Surely, now, shalt thou be too strait for thine inhabitants, And, far off, shall be they who have been swallowing thee up.
20 Okanisaki ete ozangaki bana, kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo: « Esika oyo ezali penza moke mpo na biso; pesa biso esika oyo eleki monene mpo ete tokoka kovanda. »
The children of whom thou wast bereaved shall yet say in thine ears, —Too strait for me, is the place Make room for me that I may settle down.
21 Boye, okomilobela na motema: « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi? »
Then shalt thou say in thy heart, —Who hath borne me, these, Seeing, I, have been bereaved and unfruitful, a captive and banished? These, therefore, who hath brought them up? Lo! I, was left, alone, These, where were they?
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo, nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato; bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango mpe oyo ya basi, na mapeka na bango.
Thus, saith My Lord, Yahweh—Lo! I will lift up, unto nations my hand, Yea unto peoples, will I raise high my banner, —And they shall bring in thy sons in their bosom, And, thy daughters, on the shoulder shall be borne;
23 Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
And, kings, shall be, thy foster-fathers. And their queens, thy nursing mothers, With face to the ground, shall they bow down to thee, The dust of thy feet, shall they lick, —So shalt thou know that, I, am Yahweh, In that, they shall not be put to shame, Who were waiting for me.
24 Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba na maboko ya basoda ya mpiko to kokangola mokangami wuta na maboko ya monyokoli na ye?
Shall prey, be taken from a mighty one? Or the captive of one in the right, be delivered?
25 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi: « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, mpe nakobikisa bana na yo.
Surely, thus, saith Yahweh—Even the captive of the mighty one, shall be taken away, And the prey of the tyrant, be delivered; And thine opposers, I, will oppose, And thy children, I, will save;
26 Nakosala ete banyokoli na yo balia misuni na bango moko; bakolangwa makila na bango moko ndenge balangwaka masanga ya vino. Boye, moto nyonso akoyeba ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »
Then will I feed thy tormentors with their own flesh, And as with new wine—with their own blood, shall they be drunk, —So shall all flesh, know, that, I—Yahweh, am thy Saviour, And, thy Redeemer, is the Mighty One of Jacob.

< Ezayi 49 >