< Ezayi 48 >

1 Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te!
“Hear this, house of Jacob, you who are called by the name of Israel, and have come out of the waters of Judah. You swear by the LORD’s name, and make mention of the God of Israel, but not in truth, nor in righteousness—
2 Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
for they call themselves citizens of the holy city, and rely on the God of Israel; the LORD of Hosts is his name.
3 Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala, monoko na ngai nde ebimisaki yango mpe nasalaki ete eyebana; nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki.
I have declared the former things from of old. Yes, they went out of my mouth, and I revealed them. I did them suddenly, and they happened.
4 Pamba te nayebaki ndenge nini bozalaka bato ya mito makasi, bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze.
Because I knew that you are obstinate, and your neck is an iron sinew, and your brow bronze;
5 Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te: « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema! »
therefore I have declared it to you from of old; before it came to pass I showed it to you; lest you should say, ‘My idol has done them. My engraved image and my molten image has commanded them.’
6 Boyokaki makambo oyo! Botala, yango nyonso ekokisami. Boni, bokondima yango kaka te? Wuta sik’oyo, nakoyebisa yo makambo ya sika, makambo oyo ebombama, makambo oyo oyebi nanu te.
You have heard it. Now see all this. And you, won’t you declare it? “I have shown you new things from this time, even hidden things, which you have not known.
7 Ekelami nde sik’oyo, ezali makambo ya kala te, oyoka nanu yango te, liboso ya mokolo ya lelo. Boye, okoki koloba te: « Solo, nayoka sango na yango. »
They are created now, and not from of old. Before today, you didn’t hear them, lest you should say, ‘Behold, I knew them.’
8 Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.
Yes, you didn’t hear. Yes, you didn’t know. Yes, from of old your ear was not opened, for I knew that you dealt very treacherously, and were called a transgressor from the womb.
9 Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.
For my name’s sake, I will defer my anger, and for my praise, I hold it back for you so that I don’t cut you off.
10 Tala, napetolaki yo, kasi ndenge bapetolaka palata na moto te; namekaki yo kati na moto ya minyoko.
Behold, I have refined you, but not as silver. I have chosen you in the furnace of affliction.
11 Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.
For my own sake, for my own sake, I will do it; for how would my name be profaned? I will not give my glory to another.
12 Yoka Ngai, oh Jakobi, Isalaele, yo oyo nabengaki! Ngai, nabongwanaka te; nazalaka na ebandeli mpe na suka.
“Listen to me, O Jacob, and Israel my called: I am he. I am the first. I am also the last.
13 Loboko na Ngai moko nde esalaki miboko ya mabele, mpe loboko na Ngai ya mobali nde etandaki likolo. Soki nabengi yango, yango nyonso etelemaka elongo.
Yes, my hand has laid the foundation of the earth, and my right hand has spread out the heavens. when I call to them, they stand up together.
14 Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka: Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.
“Assemble yourselves, all of you, and hear! Who among them has declared these things? He whom the LORD loves will do what he likes to Babylon, and his arm will be against the Kasdim.
15 Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi mpe nabengi ye; nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye.
I, even I, have spoken. Yes, I have called him. I have brought him and he shall make his way prosperous.
16 Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo: « Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te; wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. » Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai elongo na Molimo na Ye.
“Come near to me and hear this: “From the beginning I have not spoken in secret; from the time that it happened, I was there.” Now the Lord GOD has sent me with his Spirit.
17 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
The LORD, your Redeemer, the Holy One of Israel, says: “I am the LORD your God, who teaches you to profit, who leads you by the way that you should go.
18 Oh! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene;
Oh that you had listened to my commandments! Then your peace would have been like a river and your righteousness like the waves of the sea.
19 bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo; kombo na bango elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na Ngai.
Your offspring also would have been as the sand and the descendants of your body like its grains. His name would not be cut off nor destroyed from before me.”
20 Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili; boloba: ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
Leave Babylon! Flee from the Kasdim! With the sound of joyful shouting announce this, tell it even to the end of the earth; say, “The LORD has redeemed his servant Jacob!”
21 Bayokaki posa ya mayi te tango azalaki kotambolisa bango na esobe, abimisaki mayi na libanga mpo na bango, abukaki libanga mpe mayi ebimaki.
They didn’t thirst when he led them through the deserts. He caused the waters to flow out of the rock for them. He also split the rock and the waters gushed out.
22 Kasi Yawe alobaki: « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »
“There is no peace”, says the LORD, “for the wicked.”

< Ezayi 48 >