< Ezayi 46 >
1 Tala banzambe ya Babiloni: Beli esili ngala, Nebo ekweyi; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.
Meggörnyedt Bél, meggörbül Nebó, bálványképeik az állatra és baromra kerültek; akiket ti hordoztok, felrakatnak terhéül az elbágyadt baromnak.
2 Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko, ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango, pamba te ekeyi na bowumbu.
Meggörbültek, meggörnyedtek egyetemben, nem bírták megmenteni a terhet, maguk is fogságba mentek.
3 Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
Hallgassatok rám, Jákob háza és Izrael házának egész maradéka, akiket az anyaméhtől fogva felraktam, és születéstől fogva hordoztam;
4 Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
öregségig is az vagyok, vénségig is én visellek, én cselekedtem és hordozok, és én viselek és megmentek.
5 Bolingi kokokanisa Ngai to kotia Ngai esika moko na nani? Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani mpo ete amekana na Ngai?
Kivel hasonlítotok engem össze és tesztek egyenlővé, kivel vettek egybe, hogy hasonlók legyünk?
6 Bazali bato oyo babimisaka wolo na mabenga na bango mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo; bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko ya wolo mpe ya palata, mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.
Akik aranyat ráznak ki az erszényből és ezüstöt mérnek a mérlegen, ötvöst bérelnek, hogy földolgozza istenné, meghajtják magukat, le is borulnak.
7 Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.
Vállra emelik, hordják, leteszik a maga helyére, hogy álljon, helyéből el nem mozdul; kiált is hozzá, de nem felel, szorultságából nem segíti őt ki.
8 Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu; bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino!
Gondoljatok erre és erősbödjetek, vegyétek szívetekre, ti elpártolók!
9 Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.
Gondoljatok az előbbiekre őskortól fogva: hogy én vagyok Isten és nincs más, az Isten, és nincs olyan mint én:
10 Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki: « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
aki kezdettől fogva hirdeti a véget és elejétől fogva azokat, amik nem történtek, aki mondja: tanácsom fönn fog állni és minden akaratomat megteszem:
11 Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.
aki keletről hívja a sast, messze földről tanácsom emberét; mondottam is, el is hozom, alkottam, meg is teszem.
12 Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi, bino bato oyo bozali mosika ya bosembo!
Hallgassatok rám, konok szívűek, akik távol vannak az igazságtól.
13 Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.
Közel hoztam igazságomat, nem távozik az és segítségem nem késik; majd adok Cziónban segítséget, Izraelnek dicsőségemet.