< Ezayi 45 >

1 « Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te:
Thus said Jehovah, To His anointed, to Cyrus, Whose right hand I have laid hold on, To subdue nations before him, Yea, loins of kings I loose, To open before him two-leaved doors, Yea, gates are not shut:
2 Nakotambola liboso na yo mpe nakolalisa bangomba, nakobuka bikuke ya bronze mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango.
'I go before thee, and crooked places make straight, Two-leaved doors of brass I shiver, And bars of iron I cut asunder,
3 Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
And have given to thee treasures of darkness, Even treasures of secret places, So that thou knowest that I, Jehovah, Who am calling on thy name — [am] the God of Israel.
4 Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, mpe Isalaele, moponami na Ngai, nabengi yo na kombo na yo, napesi yo kombo ya lokumu atako oyebi Ngai nanu te.
For the sake of my servant Jacob, And of Israel My chosen, I call also thee by thy name, I surname thee, And thou hast not known Me.
5 Nazali Yawe, mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te;
I [am] Jehovah, and there is none else, Except Me there is no God, I gird thee, and thou hast not known Me.
6 mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste, bato bayeba ete mosusu azali te, bobele Ngai nde nazali Nzambe. Nazali Yawe, mosusu azali te.
So that they know from the rising of the sun, And from the west, that there is none besides Me, I [am] Jehovah, and there is none else,
7 Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.
Forming light, and preparing darkness, Making peace, and preparing evil, I [am] Jehovah, doing all these things.'
8 Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula, tika ete mapata ekitisa yango! Tika ete mabele efungwama mpo ete lobiko ebima; tika ete bosembo ekola nzela moko! Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango.
Drop, ye heavens, from above, And clouds do cause righteousness to flow, Earth openeth, and they are fruitful, Salvation and righteousness spring up together, I, Jehovah, have prepared it.
9 Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: ‹ Ozali kosala nini? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba: ‹ Azali na maboko te? ›
Woe [to] him who is striving with his Former, (A potsherd with potsherds of the ground!) Doth clay say to its Framer, 'What dost thou?' And thy work, 'He hath no hands?'
10 Mawa na ye oyo alobaka na tata na ye: ‹ Mpo na nini obotaki ngai? › Mpe na mama na ye: ‹ Mpo na nini obotaki ngai? ›
Woe [to] him who is saying to a father, 'What dost thou beget?' Or to a wife, 'What dost thou bring forth?
11 Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele mpe Mokeli na ye, alobi: Boni, bino nde bato bokotuna Ngai soki nakosala nini mpo na bana na Ngai na mikolo oyo ekoya to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali?
Thus said Jehovah, The Holy One of Israel, and his Former: Ask Me of the things coming concerning My sons, Yea, concerning the work of My hands, ye command Me.'
12 Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.
I made earth, and man on it prepared, I — My hands stretched out the heavens, And all their host I have commanded.
13 Nakobimisa Sirisi na bosembo na Ngai; nakokomisa nzela na ye nyonso alima. Akotonga lisusu engumba na Ngai mpe akopesa bonsomi na bakangami na Ngai; ekozala na motuya ya mbongo to ya biloko te, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
I have stirred him up in righteousness, And all his ways I make straight, He doth build My city, and My captivity doth send out, Not for price, nor for bribe, said Jehovah of Hosts.
14 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo: ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te! › »
Thus said Jehovah, 'The labour of Egypt, And the merchandise of Cush, And of the Sebaim — men of measure, Unto thee pass over, and thine they are, After thee they go, in fetters they pass over, And unto thee they bow themselves, Unto thee they pray: Only in thee [is] God, And there is none else, no [other] God.
15 Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka, Nzambe, Mobikisi ya Isalaele!
Surely Thou [art] a God hiding Thyself, God of Israel — Saviour!
16 Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko bakoyoka soni mpe bakosambwa; bango nyonso, bakokende na soni.
They have been ashamed, And they have even blushed — all of them, Together gone in confusion have those carving images.
17 Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.
Israel hath been saved in Jehovah, A salvation age-during! Ye are not ashamed nor confounded Unto the ages of eternity!
18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda: « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.
For thus said Jehovah, Creator of heaven, He is God, Former of earth, and its Maker, He established it — not empty He prepared it, For inhabiting He formed it: 'I [am] Jehovah, and there is none else.
19 Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili; nalobaki te na bakitani ya Jakobi: ‹ Boluka Ngai kati na pamba! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.
Not in secret have I spoken, in a dark place of the earth, I have not said to the seed of Jacob, In vain seek ye Me, I [am] Jehovah, speaking righteousness, Declaring uprightness.
20 Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te; bazangi boyebi.
Be gathered, and come in, Come nigh together, ye escaped of the nations, They have not known, Who are lifting up the wood of their graven image, And praying unto a god [that] saveth not.
21 Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka? Ezali Ngai Yawe te? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi; mosusu azali te, soki Ngai te.
Declare ye, and bring near, Yea, they take counsel together, Who hath proclaimed this from of old? From that time hath declared it? Is it not I — Jehovah? And there is no other god besides Me, A God righteous and saving, there is none save Me.
22 Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.
Turn to Me, and be saved, all ends of the earth, For I [am] God, and there is none else.
23 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te: mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.
By Myself I have sworn, Gone out from my mouth in righteousness hath a word, And it turneth not back, That to Me, bow doth every knee, every tongue swear.
24 Bakoloba na tina na Ngai: ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
Only in Jehovah, said hath one, Have I righteousness and strength, Unto Him he cometh in, And ashamed are all those displeased with Him.
25 Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.
In Jehovah are all the seed of Israel justified, And they boast themselves.'

< Ezayi 45 >