< Ezayi 43 >
1 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele: « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.
雅各啊,創造你的耶和華, 以色列啊,造成你的那位, 現在如此說: 你不要害怕!因為我救贖了你。 我曾提你的名召你,你是屬我的。
2 Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te;
你從水中經過,我必與你同在; 你詵過江河,水必不漫過你; 你從火中行過,必不被燒, 火焰也不着在你身上。
3 pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
因為我是耶和華-你的上帝, 是以色列的聖者-你的救主; 我已經使埃及作你的贖價, 使古實和西巴代替你。
4 Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
因我看你為寶為尊; 又因我愛你, 所以我使人代替你, 使列邦人替換你的生命。
5 Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo: nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste;
不要害怕,因我與你同在; 我必領你的後裔從東方來, 又從西方招聚你。
6 nakoloba epai ya nor: ‹ Pesa, › mpe epai ya sude: ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
我要對北方說,交出來! 對南方說,不要拘留! 將我的眾子從遠方帶來, 將我的眾女從地極領回,
7 moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »
就是凡稱為我名下的人, 是我為自己的榮耀創造的, 是我所做成,所造作的。
8 Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.
你要將有眼而瞎、 有耳而聾的民都帶出來!
9 Tika ete bikolo nyonso esangana elongo mpe bato basangana esika moko! Nani kati na bango asakolaki makambo oyo? Nani kati na bango ayebisaki biso makambo oyo esalemaki liboso? Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango! Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba: « Ezali ya solo! »
任憑萬國聚集; 任憑眾民會合。 其中誰能將此聲明, 並將先前的事說給我們聽呢? 他們可以帶出見證來,自顯為是; 或者他們聽見便說:這是真的。
10 « Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, mpo ete bokoka koyeba, kondimela Ngai mpe kososola ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe: Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema; mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.
耶和華說:你們是我的見證, 我所揀選的僕人。 既是這樣,便可以知道,且信服我, 又明白我就是耶和華。 在我以前沒有真神; 在我以後也必沒有。
11 Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe; Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te.
惟有我是耶和華; 除我以外沒有救主。
12 Kati na bino, Ngai nde nasakolaki, nabikisaki mpe natatolaki; kasi ezali banzambe ya bapaya te. Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe Ngai, nazali Nzambe.
我曾指示,我曾拯救,我曾說明, 並且在你們中間沒有別神。 所以耶和華說: 你們是我的見證。 我也是上帝;
13 Solo, wuta na tango ya kala, nazalaka kaka ndenge moko; moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. Soki nasali, nani akobongola yango? »
自從有日子以來,我就是上帝; 誰也不能救人脫離我手。 我要行事誰能阻止呢?
14 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.
耶和華-你們的救贖主、 以色列的聖者如此說: 因你們的緣故, 我已經打發人到巴比倫去; 並且我要使迦勒底人如逃民, 都坐自己喜樂的船下來。
15 Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. »
我是耶和華-你們的聖者, 是創造以色列的,是你們的君王。
16 Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo apasolaka nzela monene kati na ebale monene, mpe nzela moke kati na mayi ya makasi;
耶和華在滄海中開道, 在大水中開路,
17 Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba; Ye oyo alalisaka bango nyonso, mpe bakokaka lisusu kotelema te, bakufaka lokola singa ya mwinda:
使車輛、馬匹、軍兵、勇士都出來, 一同躺下,不再起來; 他們滅沒,好像熄滅的燈火。
18 « Bokanisa lisusu te makambo oyo eleka, bomitungisa lisusu te mpo na makambo ya kala.
耶和華如此說: 你們不要記念從前的事, 也不要思想古時的事。
19 Tala, nazali kosala likambo ya sika! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
看哪,我要做一件新事; 如今要發現,你們豈不知道嗎? 我必在曠野開道路, 在沙漠開江河。
20 Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,
野地的走獸必尊重我; 野狗和鴕鳥也必如此。 因我使曠野有水, 使沙漠有河, 好賜給我的百姓、我的選民喝。
21 bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.
這百姓是我為自己所造的, 好述說我的美德。
22 Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.
雅各啊,你並沒有求告我; 以色列啊,你倒厭煩我。
23 Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.
你沒有將你的羊帶來給我作燔祭, 也沒有用祭物尊敬我; 我沒有因供物使你服勞, 也沒有因乳香使你厭煩。
24 Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.
你沒有用銀子為我買菖蒲, 也沒有用祭物的脂油使我飽足; 倒使我因你的罪惡服勞, 使我因你的罪孽厭煩。
25 Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
惟有我為自己的緣故塗抹你的過犯; 我也不記念你的罪惡。
26 Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.
你要提醒我,你我可以一同辯論; 你可以將你的理陳明,自顯為義。
27 Tata na yo ya liboso asalaki masumu, balobeli na yo batombokelaki Ngai.
你的始祖犯罪; 你的師傅違背我。
28 Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama, mpe Isalaele, mpo na pasi.
所以,我要辱沒聖所的首領, 使雅各成為咒詛, 使以色列成為辱罵。