< Ezayi 41 >

1 « Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai! Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, tika ete bapusana mpe baloba: ‹ Tokende elongo mpo na kosamba! ›
群島啊!請肅靜聽我!讓萬民前來!讓他們前來開口說話;讓我們一起互相辯論!
2 Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.
是誰由東方喚醒了那人,使他步步遇到勝利﹖是誰將眾民交付給他,又使列王臣服於他呢﹖他的刀劍使他們化為灰塵,他的弓箭分散他們有如草芥。
3 Azali kolanda bango mpe koleka na kimia na nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te.
他追擊他們時,平安地經過;他的腳好像沒有踏著道路一樣。
4 Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo? Nani abengaka bileko wuta na ebandeli? Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso, mpe nakozala mpe kaka ndenge moko elongo na bato ya suka. »
是誰從原始安排了歷代的事而予以實行成就呢﹖我,上主,是元始,與最末者同在的也是我。
5 Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, basuka ya mabele ezali kolenga. Bazali kopusana, bazali koya pene;
群島一見即害怕起來,地極為之震動,遂都聚集前來;
6 moto na moto azali kosunga moninga na ye mpe koloba na ndeko na ye: « Sala makasi! »
彼此相助,並對自己的同伴說:「勇敢些!」
7 Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto, mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka; alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende: « Ezali malamu; » mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete mpo ete eningana te.
工匠鼓勵金匠,掄大鎚的鼓勵使小錘的,誇讚鉛工說:「鉛的好!」遂用釘子釘住,使偶像不致動搖。
8 « Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,
但是你,我的僕人以色列,我所揀選的雅各伯,我的好友亞巴郎的苗裔,
9 yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele, oyo nabengaki wuta na basuka na yango, yo oyo epai ya nani nalobaki: ‹ Ozali mosali na Ngai, › naponaki yo mpe nabwakaki yo te.
你是我由地極領來的,是我從遠方召來的,我曾向你說過:「你是我的僕人,我揀選了你,我決不放棄你。」
10 Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
你不要害怕,因為我與你在一起;你不要驚惶,因為我是你的天主;我必堅固你,協助你,用我勝利的右手扶持你。
11 Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo bakokufa solo soni mpe bakosambwa; bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma lokola biloko pamba mpe bakokufa.
凡向你洩怒的,必蒙羞受辱;凡同你爭辯的,必要滅亡,化為烏有。
12 Ata oluki bayini na yo, okomona bango te; bato oyo bazali kobundisa yo bakokoma biloko pamba.
凡與你爭吵的人,你找他們,也找不到。凡與你交戰的人,必化為烏有,歸於虛無,
13 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo: ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
因為是我,上主,你的天主,提攜著你的右手,向你說過:「不要害怕,有我協助你。」
14 Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.
雅各伯蟲豸啊!以色列蛆蟲啊!不要害怕,我必協助你--上主的斷語--你的救主是以色列的聖者。
15 « Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, oyo batia minu bapelisa makasi, lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi; okopanza bangomba milayi, okokomisa yango putulu; okokomisa bangomba ya mikuse lokola matiti ya kokawuka,
看啊,我使你成為一架鋒利多齒的新打禾機,叫你壓搾高山,壓得粉碎,使丘陵變為碎末。
16 okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.
你要簸揚它們,風必將它們捲去,暴風必吹散它們;然而你要因上主而喜樂,因以色列的聖者而誇耀。
17 Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba: mayi ezali te; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.
貧困和窮苦的人,若找水而無所獲,他們的舌頭渴得焦燥,我上主必俯允他們,我,以色列的天主必不棄捨他們。
18 Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba, mpe bitima na kati-kati ya mabwaku; nakobongola esobe liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi;
我要在禿山上開闢河流,在空谷中噴出泉源;我要使沙漠變為池沼,使乾地化為噴泉。
19 nakolona kati na esobe: banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,
我要在沙漠中種植香柏木、皂莢、桃金娘和橄欖樹;在荒野中要把柏樹、榆樹和雲杉樹一起栽植起來;
20 mpo ete bato bamona mpe bayeba, batala mpe basosola elongo ete loboko na Yawe nde esali makambo wana, ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. »
為使人們看見,知道,同時因深思而瞭解:這是上主的手所做的,是以色列的聖者所創造的。
21 « Botalisa likambo na bino, » elobi Yawe, « boluka komilongisa, » elobi Mokonzi ya Jakobi.
拿出你的理由來,上主說:呈上你的證據來,雅各伯的君王說。
22 « Boya na banzambe na bino ya bikeko mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya. Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini, mpo ete toyekola yango malamu mpe toyeba ndenge nini esukelaki. To boyebisa biso makambo oyo ekoya;
讓他們前來,告訴我們將要發生什麼事;讓他們告訴我們,那以往的事有什麼意義,好叫我們記在心中;或者讓我們聽聽那要來的事罷,好叫我們知道那事的結果。
23 boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe; bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.
請你們說說那以後要來的事,好叫我們知道你們是神;無論好壞請你們做一下,好叫我們都驚奇害怕。
24 Tala, bozali kaka pamba, mpe misala na bino ezali bobele se pamba; moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele.
看哪!你們竟是烏有,你們的工作也是虛無;那選擇你們的實在可憎。
25 Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
我由北方喚起了一個人,他就來了;我由日出之地呼喚了他的名字,他將蹂躪王侯有如泥濘,又如陶工踐踏黏土。
26 Nani alobaki yango wuta na ebandeli mpo ete biso tokoka koyeba, to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba: ‹ Ezali sembo? › Te, moto moko te alobaki yango, moko te asalaki ete likambo yango eyokana, moko te ayokaki maloba na bino.
誰首先說過這事,好叫我們知道,在事前說過,而叫我們說「對啦﹖」實在沒有一個預言過,沒有一個講過,也沒有一個聽見過你們說話。
27 Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona: ‹ Tala, tala bango oyo! › Mpe na Yelusalemi: ‹ Napesi momemi Sango Malamu! ›
只有我是第一位給熙雍報告過這事,給耶路撒冷遣發了一位報告喜訊的。
28 Natalaki, kasi moto moko te azalaki, moko te kati na bango mpo na kopesa toli, moko te mpo na kopesa eyano soki natuni bango motuna.
我環視四周,了無一人;他們中沒有一個可做謀士,向他詢問,可回答一句的。
29 Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta! Misala na bango ezali se pamba, bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »
看哪,他們都是烏有,他們的工作是虛無,他們的鑄像是空氣,是空氣。

< Ezayi 41 >