< Ezayi 40 >

1 Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.
Утешайте, утешайте люди Моя, глаголет Бог:
2 Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
священницы, глаголите в сердце Иерусалиму, утешайте и, яко наполнися смирение его, разрешися грех его, яко прият от руки Господни сугубы грехи своя.
3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela: « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.
Глас вопиющаго в пустыни: уготовайте путь Господень, правы сотворите стези Бога нашего:
4 Tika ete mabwaku nyonso ekundama, bangomba nyonso ya milayi to ya mikuse ekitisama, banzela nyonso oyo etengama esembolama, mpe mabulu nyonso ekoma bitando.
всяка дебрь наполнится, и всяка гора и холм смирится, и будут вся стропотная в право, и острая в пути гладки.
5 Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo; » pamba te Yawe nde alobi.
И явится слава Господня, и узрит всяка плоть спасение Божие, яко Господь глагола.
6 Mongongo moko elobi: « Belela! » Mpe nazongisaki: « Nabelela likambo nini? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.
Глас вопиющаго: возопий. И рекох: что возопию? Всяка плоть сено, и всяка слава человеча яко цвет травный:
7 Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. Solo, bato bazali lokola matiti:
изсше трава, и цвет отпаде,
8 Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
глаголгол же Бога нашего пребывает во веки.
9 Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu; tombola yango penza, kobanga te; loba na bingumba ya Yuda: « Botala Nzambe na bino! »
На гору высоку взыди, благовествуяй Сиону, возвыси крепостию глас твой, благовествуяй Иерусалиму: возвысите, не бойтеся. Рцы градом Иудиным:
10 Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.
се, Бог ваш, се, Господь, Господь со крепостию идет, и мышца Его со властию: се, мзда Его с Ним, и дело Его пред Ним:
11 Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele: kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
аки пастырь упасет паству Свою, и мышцею Своею соберет агнцы, и имущыя во утробе утешит.
12 Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo?
Кто измери горстию воду и небо пядию и всю землю горстию? Кто постави горы в мериле и холмы в весе?
13 Nani asosoli makanisi ya Yawe to apesi Ye toli lokola molakisi?
Кто уразуме ум Господень, и кто советник Ему бысть, иже научает Его?
14 Yawe atunaki toli na nani mpo ete apesa Ye mayele? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli?
Или с ким советова, и настави И? Или кто показа Ему суд? Или путь разумения кто показа Ему? Или кто прежде даде Ему, и воздастся Ему?
15 Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, lokola putulu kati na emekelo kilo! Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.
Аще вси языцы, аки капля от кади, и яко претяжение веса вменишася, и аки плюновение вменятся?
16 Banzete ya Libani ekokoka te mpo na kopelisa moto ya etumbelo, mpe banyama na yango ekokoka te mpo na kotumba mbeka.
Дубрава же Ливанова не доволна на сожжение, и вся четвероногая не доволна на всесожжение.
17 Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.
И вси языцы яко ничтоже суть, и в ничтоже вменишася.
18 Bolingi kokokanisa Nzambe na nani? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini?
Кому уподобисте Господа, и коему подобию уподобисте Его?
19 Ndenge basalaka ekeko, mosali bikeko anyangwisi ebende na moto mpe asali ekeko; mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo, bongo akangisi yango na basheneti ya palata.
Еда образ сотвори древоделатель, или златарь слияв злато позлати его, или подобием сотвори его?
20 Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye mpo ete azali mobola makasi akopona nzete oyo epolaka te; akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.
Древо бо негниющее избирает древоделатель и мудре ищет, како поставит образ его, и да не поколеблется.
21 Boyebi yango te? Boyoka nanu yango te? Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli? Bososola nanu yango te wuta mokili esalema?
Не разуместе ли, не слышасте ли, не возвестися ли вам исперва? Не разуместе ли основания земли?
22 Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna;
Содержай круг земли, и живущии на ней аки прузи: поставивый небо яко камару и простер е, яко скинию обитати:
23 akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.
даяй князи аки ничтоже владети, и землю аки ничтоже сотвори.
24 Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.
Не насадят бо, ниже насеют, и не вкоренится в земли корение их: дхну на них ветр, и изсхоша, и буря аки стеблие возмет их.
25 « Bolingi kokokanisa Ngai na nani? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu?
Ныне убо кому Мя уподобисте, и вознесуся? Рече Святый.
26 Botombola miso na bino mpe botala na likolo: Nani akela biloko nyonso ya likolo: moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.
Воззрите на высоту очима вашима и видите, кто сотвори сия вся: носяй по числу утварь Свою, и вся по имени прозовет от многия славы и в державе крепости Своея: ничтоже утаися и Тебе.
27 Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba; oh Isalaele, mpo na nini kotatola: « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai? »
Еда бо речеши, Иакове, и что глаголал еси, Израилю: утаися путь мой от Бога, и Бог мой суд отя, и отступи?
28 Oyebi te? Nanu oyoka te? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
И ныне не уразумел ли еси ни ли слышал еси? Бог вечный, Бог устроивый концы земли, не взалчет, ниже утрудится, ниже есть изобретение премудрости Его,
29 Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
даяй алчущым крепость и неболезненным печаль.
30 Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, bilombe batengaka-tengaka;
Взалчут бо юнейшии, и утрудятся юноты, и избраннии не крепцы будут:
31 basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika: bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.
терпящии же Господа изменят крепость, окрылатеют аки орли, потекут и не утрудятся, пойдут и не взалчут.

< Ezayi 40 >