< Ezayi 39 >

1 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki.
En aquel tiempo, Merodac-baladán, hijo de Baladán, rey de Babilonia, envió cartas y un regalo a Ezequías, pues se enteró de que había estado enfermo y se había recuperado.
2 Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
Ezequías se alegró de ellos, y les mostró la casa de sus cosas preciosas, la plata, el oro, las especias y el aceite precioso, y toda la casa de su armadura, y todo lo que se encontraba en sus tesoros. No había nada en su casa, ni en todo su dominio, que Ezequías no les mostrara.
3 Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye: — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi? Ezekiasi azongisaki: — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.
Entonces el profeta Isaías se acercó al rey Ezequías y le preguntó: “¿Qué han dicho estos hombres? ¿De dónde vinieron a ti?” Ezequías dijo: “Han venido de un país lejano a mí, incluso de Babilonia”.
4 Ezayi atunaki: — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo? Ezekiasi azongisaki: — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
Entonces preguntó: “¿Qué han visto en tu casa?” Ezequías respondió: “Han visto todo lo que hay en mi casa. No hay nada entre mis tesoros que no les haya mostrado”.
5 Ezayi alobaki na Ezekiasi: — Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi:
Entonces Isaías dijo a Ezequías: “Escucha la palabra de Yahvé de los Ejércitos:
6 « Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe.
‘He aquí que vienen días en que todo lo que hay en tu casa, y lo que tus padres han almacenado hasta hoy, será llevado a Babilonia. No quedará nada’, dice el Señor.
7 « Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
‘Se llevarán a tus hijos que saldrán de ti, a los que engendrarás, y serán eunucos en el palacio del rey de Babilonia’”.
8 Ezekiasi azongiselaki Ezayi: — Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela: « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. »
Entonces Ezequías dijo a Isaías: “La palabra de Yahvé que has dicho es buena”. Dijo además: “Porque habrá paz y verdad en mis días”.

< Ezayi 39 >