< Ezayi 37 >

1 Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.
It happened, when king Hezekiah heard it, that he tore his clothes, covered himself with sackcloth, and went into the LORD's house.
2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo; bango nyonso balata bilamba ya basaki.
He sent Eliakim, who was over the household, and Shebna the scribe, and the elders of the priests, covered with sackcloth, to Isaiah the prophet, the son of Amoz.
3 Balobaki na ye: « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi: ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
They said to him, "Thus says Hezekiah, 'This day is a day of trouble, and of rebuke, and of rejection; for the children have come to the birth, and there is no strength to bring forth.
4 Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »
It may be the LORD your God will hear the words of Rabshakeh, whom the king of Assyria his master has sent to defy the living God, and will rebuke the words which the LORD your God has heard. Therefore lift up your prayer for the remnant that is left.'"
5 Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,
So the servants of king Hezekiah came to Isaiah.
6 Ezayi alobaki na bango: « Boloba na nkolo na bino: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.
Isaiah said to them, "Tell your master, 'Thus says the LORD, "Do not be afraid of the words that you have heard, with which the servants of the king of Assyria have blasphemed me.
7 Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
Look, I will put a spirit in him and he will hear news, and will return to his own land. I will cause him to fall by the sword in his own land."'"
8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
So Rabshakeh returned, and found the king of Assyria warring against Libnah, for he had heard that he was departed from Lachish.
9 Sima na mokonzi ya Asiri koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo:
He heard news concerning Tirhakah king of Ethiopia, "He has come out to fight against you." When he heard it, he returned and sent messengers to Hezekiah, saying,
10 « Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda: ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo: ‘Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri.’
"Thus you shall speak to Hezekiah king of Judah, saying, 'Do not let your God in whom you trust deceive you, saying, "Jerusalem won't be given into the hand of the king of Assyria."
11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye; okanisi ete yo nde okobika?
Look, you have heard what the kings of Assyria have done to all lands, by destroying them utterly. Shall you be delivered?
12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango?
Have the gods of the nations delivered them, which my fathers have destroyed, Gozan, Haran, Rezeph, and the people of Eden who were in Telassar?
13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva? › »
Where is the king of Hamath, and the king of Arpad, and the king of the city of Sepharvaim, of Hena, and Ivvah?'"
14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.
Hezekiah received the letter from the hand of the messengers and read it. Then Hezekiah went up to the LORD's house, and spread it before the LORD.
15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe:
Hezekiah prayed to the LORD, saying,
16 « Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele; Yo nde osala Likolo mpe mabele.
"LORD of hosts, the God of Israel, who is enthroned among the cherubim, you are the God, even you alone, of all the kingdoms of the earth. You have made heaven and earth.
17 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka; Yawe, fungola miso mpe mona! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
Turn your ear, LORD, and hear. Open your eyes, LORD, and look. Hear all of the words of Sennacherib, who has sent to defy the living God.
18 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango.
Truly, LORD, the kings of Assyria have destroyed all the countries and their land,
19 Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.
and have cast their gods into the fire; for they were no gods, but the work of men's hands, wood and stone; therefore they have destroyed them.
20 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »
Now therefore, LORD our God, save us from his hand, that all the kingdoms of the earth may know that you are the LORD, even you only."
21 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri,
Then Isaiah the son of Amoz sent to Hezekiah, saying, "Thus says the LORD, the God of Israel, 'Because you have prayed to me against Sennacherib king of Assyria,
22 tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye: Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
this is the word which the LORD has spoken concerning him. The virgin daughter of Zion has despised you and ridiculed you. The daughter of Jerusalem has shaken her head at you.
23 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo? Mosantu ya Isalaele!
Whom have you defied and blasphemed? Against whom have you exalted your voice and lifted up your eyes on high? Against the Holy One of Israel.
24 Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki: ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko;
By your messengers you have taunted the LORD, and have said, "With the multitude of my chariots I have come up to the height of the mountains, to the innermost parts of Lebanon. I will cut down its tall cedars and its choice fir trees. I will enter into its farthest height, the forest of its fruitful field.
25 natimolaki mabulu ya mayi mpe namelaki mayi; na matambe ya makolo na ngai, nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ›
I have dug and drunk water, and with the sole of my feet I will dry up all the rivers of Egypt."
26 Oyoka nanu yango te? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.
Have you not heard how I have done it long ago, and formed it in ancient times? Now I have brought it to pass, that it should be yours to destroy fortified cities, turning them into ruinous heaps.
27 Bato na yango bazangi makasi, balengi na somo mpe bakomi na soni, bakomi lokola matiti ya bilanga, lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, ekawuka liboso ete ekola.
Therefore their inhabitants had little power. They were dismayed and confounded. They were like the grass of the field, and like the green herb, like the grass on the rooftops when it is scorched by the east wind.
28 Nayebi esika nini ozalaka, tango nini obimaka, tango nini ozongaka, mpe tango nini otombokelaka Ngai.
But I know your sitting down, your going out, your coming in, and your raging against me.
29 Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.
Because of your raging against me, and because your arrogance has come up into my ears, therefore I will put my hook in your nose and my bridle in your lips, and I will turn you back by the way by which you came.
30 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo: Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango.
This shall be the sign to you. You will eat this year that which grows of itself, and in the second year that which springs from the same; and in the third year sow and reap and plant vineyards, and eat their fruit.
31 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, bakozala lokola nzete oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele mpe eboti bambuma.
The remnant that is escaped of the house of Judah will again take root downward, and bear fruit upward.
32 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.
For out of Jerusalem a remnant will go forth, and survivors will escape from Mount Zion. The zeal of the LORD of hosts will perform this.'
33 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri: ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba.
Therefore thus says the LORD concerning the king of Assyria, 'He will not come to this city, nor shoot an arrow there, neither will he come before it with shield, nor cast up a mound against it.
34 Akozongela na nzela oyo ayelaki mpe akokota na engumba oyo te, › elobi Yawe.
By the way that he came, by the same he shall return, and he shall not come to this city,' says the LORD.
35 ‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »
'For I will defend this city to save it, for my own sake, and for my servant David's sake.'"
36 Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
The angel of the LORD went out and struck one hundred and eighty-five thousand men in the camp of the Assyrians. When men arose early in the morning, look, these were all dead bodies.
37 Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.
So Sennacherib king of Assyria departed, went away, returned to Nineveh, and stayed there.
38 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.
It happened, as he was worshipping in the house of Nisroch his god, that Adrammelech and Sharezer his sons struck him with the sword; and they escaped into the land of Ararat. Esarhaddon his son reigned in his place.

< Ezayi 37 >