< Ezayi 32 >

1 Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo, mpe bakambi na ye bakokamba na solo.
보라 장차 한 왕이 의로 통치할 것이요 방백들이 공평으로 정사할 것이며
2 Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
또 그 사람은 광풍을 피하는 곳, 폭우를 가리우는 곳 같을 것이며 마른 땅에 냇물 같을 것이며 곤비한 땅에 큰 바위 그늘 같으리니
3 Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te, mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.
보는 자의 눈이 감기지 아니할 것이요 듣는 자의 귀가 기울어질 것이며
4 Mito ya bato oyo bazangi mayele ekozwa boyebi mpe bososoli, bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma koloba noki-noki mpe malamu.
조급한 자의 마음이 지식을 깨닫고 어눌한 자의 혀가 민첩하여 말을 분명히 할 것이라
5 Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba, mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi;
어리석은 자를 다시 존귀하다 칭하지 아니하겠고 궤휼한 자를 다시 정대하다 말하지 아니하리니
6 pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe: atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.
이는 어리석은 자는 어리석은 것을 말하며 그 마음에 불의를 품어 간사를 행하며 패역한 말로 여호와를 거스리며 주린 자의 심령을 비게 하며 목마른 자의 마시는 것을 없어지게 함이며
7 Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.
궤휼한 자는 그 그릇이 악하여 악한 계획을 베풀어 거짓말로 가련한 자를 멸하며 빈핍한 자가 말을 바르게 할지라도 그리함이어니와
8 Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumu mpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu.
고명한 자는 고명한 일을 도모하나니 그는 항상 고명한 일에 서리라
9 Bino basi oyo bovandaka na kimia, botelema mpe boyoka ngai; bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, boyoka makambo oyo nalingi koloba:
너희 안일한 부녀들아 일어나 내 목소리를 들을지어다 너희 염려 없는 딸들아 내 말에 귀를 기울일지라
10 Etikali kaka mikolo moke kati na mobu, bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana; pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka, mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te.
너희 염려 없는 여자들아 일 년 남짓이 지나면 너희가 당황하여 하리니 포도 수확이 없으며 열매 거두는 기한이 이르지 않을 것임이니라
11 Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino!
너희 안일한 여자들아 떨지어다 너희 염려 없는 자들아 당황하여 할지어다 옷을 벗어 몸을 드러내고 베로 허리를 동일지어다
12 Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko, mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,
좋은 밭을 위하며 열매 많은 포도나무를 위하여 가슴을 치게 될 것이니라
13 mpe mpo na mokili ya bato na ngai; pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,
형극과 질려가 내 백성의 땅에 나며 희락의 성읍, 기뻐하는 모든 집에 나리니
14 pamba te basundoli ndako ya mokonzi; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
대저 궁전이 폐한 바 되며 인구 많던 성읍이 적막하며 산과 망대가 영영히 굴혈이 되며 들나귀의 즐겨하는 곳과 양 떼의 풀 먹는 곳이 될 것임이어니와
15 kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo, bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko; mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana lokola zamba monene.
필경은 위에서부터 성신을 우리에게 부어주시리니 광야가 아름다운 밭이 되며 아름다운 밭을 삼림으로 여기게 되리라
16 Bosembo ekowumela kati na esobe, mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.
그 때에 공평이 광야에 거하며 의가 아름다운 밭에 있으리니
17 Mbuma ya bosembo ekozala kimia: bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
의의 공효는 화평이요 의의 결과는 영원한 평안과 안전이라
18 Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia, na bandako ya malonga mpe na bisika ya bopemi ya kimia.
내 백성이 화평한 집과 안전한 거처와 종용히 쉬는 곳에 있으려니와
19 Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka, zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.
먼저 그 삼림은 우박에 상하고 성읍은 파괴되리라
20 Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayi mpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso.
모든 물가에 씨를 뿌리고 소와 나귀를 그리로 모은 너희는 복이 있느니라

< Ezayi 32 >