< Ezayi 31 >
1 Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te!
Ve dem, som gaar ned til Ægypten om Hjælp og slaar Lid til Heste, som stoler paa Vognenes Mængde, paa Rytternes store Tal, men ikke ser hen til Israels Hellige, ej raadspørger HERREN.
2 Nzokande, Ye mpe azali na bwanya mpe akoki koyeisa pasi; abongolaka maloba na Ye te. Atelemelaka ndako ya bato mabe mpe bato oyo basungaka bango.
Men viis er og han, lader Ulykke komme og gaar ej fra sit Ord. Han staar op mod de ondes Hus og mod Udaadsmændenes Hjælp.
3 Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya; bongo, bango mibale bakobebisama.
Ægypterne er Mennesker, ikke Gud, deres Heste er Kød, ikke Aand. Naar HERREN udrækker Haanden, snubler Hjælperen, den hjulpne falder, de omkommer alle til Hobe.
4 Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai: « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.
Thi saa sagde HERREN til mig: Som en Løve knurrer, en Ungløve over sit Rov, og ikke, naar Hyrdernes Flok kaldes hid imod den, skræmmes af Skriget eller viger for Larmen, saa stiger Hærskarers HERRE ned til Kamp paa Zions Bjerg og Høj.
5 Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela Yelusalemi, akobatela mpe akokangola, akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »
Som svævende Fugle saa skærmer Hærskarers HERRE Jerusalem, skærmer og frier, skaaner og redder.
6 Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi!
Vend om til ham, hvem Israels Børn faldt fra saa dybt!
7 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.
Thi paa hin Dag vrager enhver sine Guder af Sølv, sine Guder af Guld, eders Hænders syndige Værk.
8 « Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga ya moto ya mokili oyo te, ekobebisama na mopanga ya moto te. Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma kosala misala ya makasi.
Assur falder for Sværd, men ikke en Mands, et Sværd fortærer det, ikke et Menneskes. Og han skal fly for Sværdet, til Hoveriarbejde tvinges hans Stridsmænd;
9 Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.
hans Klippe viger bort af Rædsel, hans Fyrster skræmmes fra Fanen. Saa lyder det fra HERREN, hvis Ild er i Zion, som har sin Ovn i Jerusalem.