< Ezayi 30 >

1 « Mawa na bana ya mito makasi, » elobi Yawe: « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu;
“Woe to the rebellious children”, says the LORD, “who take counsel, but not from me; and who make an alliance, but not with my Spirit, that they may add sin to sin;
2 mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito, na kozanga kotuna toli na Ngai, mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito!
who set out to go down into Egypt without asking for my advice, to strengthen themselves in the strength of Pharaoh, and to take refuge in the shadow of Egypt!
3 Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.
Therefore the strength of Pharaoh will be your shame, and the refuge in the shadow of Egypt your confusion.
4 Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,
For their princes are at Zoan, and their ambassadors have come to Hanes.
5 bango nyonso bakoyoka kaka soni na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te, oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te, kasi bobele soni mpe kotiolama. »
They shall all be ashamed because of a people that can’t profit them, that are not a help nor profit, but a shame, and also a reproach.”
6 Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi: Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te:
The burden of the animals of the South. Through the land of trouble and anguish, of the lioness and the lion, the viper and fiery flying serpent, they carry their riches on the shoulders of young donkeys, and their treasures on the humps of camels, to an unprofitable people.
7 ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala penza na tina moko te; yango wana, napesi yango kombo « Rahavi. »
For Egypt helps in vain, and to no purpose; therefore I have called her Rahab who sits still.
8 Kende sik’oyo, koma makambo oyo na etando ya libanga liboso na bango, koma yango na buku moko mpo ete na mikolo oyo ekoya, ezala lokola litatoli ya libela na libela.
Now go, write it before them on a tablet, and inscribe it in a book, that it may be for the time to come forever and ever.
9 Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe;
For it is a rebellious people, lying children, children who will not hear the LORD’s law;
10 balobaka na bato oyo bamonaka makambo: « Bomona te, » mpe na basakoli: « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.
who tell the seers, “Don’t see!” and the prophets, “Don’t prophesy to us right things. Tell us pleasant things. Prophesy deceits.
11 Botika nzela wana, bobima penza na nzela wana mpe botika kotungisa biso mpo na Mosantu ya Isalaele! »
Get out of the way. Turn away from the path. Cause the Holy One of Israel to cease from before us.”
12 Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi: « Lokola bobwaki maloba oyo, lokola bokangami na monyokoli mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,
Therefore the Holy One of Israel says, “Because you despise this word, and trust in oppression and perverseness, and rely on it,
13 lisumu oyo ekokoma mpo na bino lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.
therefore this iniquity shall be to you like a breach ready to fall, swelling out in a high wall, whose breaking comes suddenly in an instant.
14 Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, ekopanzana penza nye na mawa te; bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango mpo na kozwela likala ya moto na mbabola to mpo na kotokela mayi na libulu. »
He will break it as a potter’s vessel is broken, breaking it in pieces without sparing, so that there won’t be found among the broken pieces a piece good enough to take fire from the hearth, or to dip up water out of the cistern.”
15 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino; kasi bino, bolingi bongo te.
For thus said the Lord GOD, the Holy One of Israel, “You will be saved in returning and rest. Your strength will be in quietness and in confidence.” You refused,
16 Bolobaki: ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda; › solo, bokokima nde! Bolobaki: ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu!
but you said, “No, for we will flee on horses;” therefore you will flee; and, “We will ride on the swift;” therefore those who pursue you will be swift.
17 Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »
One thousand will flee at the threat of one. At the threat of five, you will flee until you are left like a beacon on the top of a mountain, and like a banner on a hill.
18 Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo: Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye!
Therefore the LORD will wait, that he may be gracious to you; and therefore he will be exalted, that he may have mercy on you, for the LORD is a God of justice. Blessed are all those who wait for him.
19 Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
For the people will dwell in Zion at Jerusalem. You will weep no more. He will surely be gracious to you at the voice of your cry. When he hears you, he will answer you.
20 Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, mpe mayi na tango ya minyoko; moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, kasi miso na bino moko ekomona ye.
Though the Lord may give you the bread of adversity and the water of affliction, yet your teachers won’t be hidden any more, but your eyes will see your teachers;
21 Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo: « Tala nzela yango oyo! »
and when you turn to the right hand, and when you turn to the left, your ears will hear a voice behind you, saying, “This is the way. Walk in it.”
22 Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango: « Longwa awa! »
You shall defile the overlaying of your engraved images of silver, and the plating of your molten images of gold. You shall cast them away as an unclean thing. You shall tell it, “Go away!”
23 Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.
He will give the rain for your seed, with which you will sow the ground; and bread of the increase of the ground will be rich and plentiful. In that day, your livestock will feed in large pastures.
24 Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu.
The oxen likewise and the young donkeys that till the ground will eat savory feed, which has been winnowed with the shovel and with the fork.
25 Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana, bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse.
There will be brooks and streams of water on every lofty mountain and on every high hill in the day of the great slaughter, when the towers fall.
26 Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.
Moreover the light of the moon will be like the light of the sun, and the light of the sun will be seven times brighter, like the light of seven days, in the day that the LORD binds up the fracture of his people, and heals the wound they were struck with.
27 Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
Behold, the LORD’s name comes from far away, burning with his anger, and in thick rising smoke. His lips are full of indignation. His tongue is as a devouring fire.
28 Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi, ebale oyo etondi kino na kingo. Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi, akotia na mbanga ya bato ebende oyo batiaka na minoko ya bampunda mpo ete emema bango na libunga.
His breath is as an overflowing stream that reaches even to the neck, to sift the nations with the sieve of destruction. A bridle that leads to ruin will be in the jaws of the peoples.
29 Mpo na bino, bokoyemba banzembo lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule; mitema na bino ekotonda na esengo lokola bato oyo bazali kobeta flite mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, na Libanga ya Isalaele.
You will have a song, as in the night when a holy feast is kept, and gladness of heart, as when one goes with a flute to come to the LORD’s mountain, to Israel’s Rock.
30 Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
The LORD will cause his glorious voice to be heard, and will show the descent of his arm, with the indignation of his anger and the flame of a devouring fire, with a blast, storm, and hailstones.
31 Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri, mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi.
For through the LORD’s voice the Assyrian will be dismayed. He will strike him with his rod.
32 Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango fimbu na Ye ya kosambisa, ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda, ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye mpo na kobundisa bango.
Every stroke of the rod of punishment, which the LORD will lay on him, will be with the sound of tambourines and harps. He will fight with them in battles, brandishing weapons.
33 Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.
For his burning place has long been ready. Yes, it is prepared for the king. He has made its pyre deep and large with fire and much wood. The LORD’s breath, like a stream of sulfur, kindles it.

< Ezayi 30 >