< Ezayi 3 >

1 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akomi pene ya kobotola masungi nyonso, kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda: lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi;
כי הנה האדון יהוה צבאות מסיר מירושלם ומיהודה משען ומשענה כל משען לחם וכל משען מים
2 bilombe mpe basoda ya mpiko, basambisi mpe basakoli, bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi;
גבור ואיש מלחמה שופט ונביא וקסם וזקן
3 bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko mpe bato oyo basalelaka maji.
שר חמשים ונשוא פנים ויועץ וחכם חרשים ונבון לחש
4 Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.
ונתתי נערים שריהם ותעלולים ימשלו בם
5 Bato bakokoma konyokolana bango na bango: moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu;
ונגש העם איש באיש ואיש ברעהו ירהבו הנער בזקן והנקלה בנכבד
6 moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba: « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko! »
כי יתפש איש באחיו בית אביו שמלה לכה קצין תהיה לנו והמכשלה הזאת תחת ידך
7 Kasi na mokolo wana, akoganga: « Te, nazali na ngai monganga te, mpe nazali na bilei to bilamba te kati na ndako na ngai; bokomisa ngai mokonzi te! »
ישא ביום ההוא לאמר לא אהיה חבש ובביתי אין לחם ואין שמלה לא תשימני קצין עם
8 Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
כי כשלה ירושלם ויהודה נפל כי לשונם ומעלליהם אל יהוה למרות עני כבודו
9 Bilongi na bango ezali kofunda bango; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo!
הכרת פניהם ענתה בם וחטאתם כסדם הגידו לא כחדו אוי לנפשם כי גמלו להם רעה
10 Loba na moto ya sembo: « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
אמרו צדיק כי טוב כי פרי מעלליהם יאכלו
11 Mawa na moto mabe! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
אוי לרשע רע כי גמול ידיו יעשה לו
12 Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, basi bazali koyangela bango. Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda!
עמי נגשיו מעולל ונשים משלו בו עמי מאשריך מתעים ודרך ארחתיך בלעו
13 Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.
נצב לריב יהוה ועמד לדין עמים
14 Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye: « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola!
יהוה במשפט יבוא עם זקני עמו ושריו ואתם בערתם הכרם גזלת העני בבתיכם
15 Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga?
מלכם (מה לכם) תדכאו עמי ופני עניים תטחנו נאם אדני יהוה צבאות
16 Yawe alobi: « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
ויאמר יהוה יען כי גבהו בנות ציון ותלכנה נטוות (נטויות) גרון ומשקרות עינים הלוך וטפף תלכנה וברגליהם תעכסנה
17 Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »
ושפח אדני קדקד בנות ציון ויהוה פתהן יערה
18 Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele: basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza;
ביום ההוא יסיר אדני את תפארת העכסים והשביסים--והשהרנים
19 biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,
הנטפות והשירות והרעלות
20 bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto,
הפארים והצעדות והקשרים ובתי הנפש והלחשים
21 bapete ya mosapi, bapete ya zolo,
הטבעות ונזמי האף
22 bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike,
המחלצות והמעטפות והמטפחות והחריטים
23 bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
והגלינים והסדינים והצניפות והרדידים
24 Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe; na esika ya mokaba, ekozela nde singa; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
והיה תחת בשם מק יהיה ותחת חגורה נקפה ותחת מעשה מקשה קרחה ותחת פתיגיל מחגרת שק כי תחת יפי
25 Mibali na bino bakokufa na mipanga, basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba.
מתיך בחרב יפלו וגבורתך במלחמה
26 Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga; boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.
ואנו ואבלו פתחיה ונקתה לארץ תשב

< Ezayi 3 >