< Ezayi 29 >
1 Mawa na yo, Arieli, Arieli, engumba oyo Davidi azalaki kovanda! Bobakisa mibu na mibu mpe botika ete bafeti na bino ekoba kolandana ndenge ezalaka.
Woe to Ariel, Ariel, the city where David encamped! Add year to year; let the festivals come round.
2 Kasi nakonyokola Arieli; ekokoma na mawa mpe na kolela; ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo.
But I will besiege Ariel, and she will be mourning and lamenting; and she will be to me like Ariel.
3 Nakozingela yo mpo na kobundisa yo, nakozingela yo na mir ya molayi mpe nakotiela yo mampinga ya nguya mpo na kotelemela yo.
I will encamp against you in a circle and will lay siege against you with a palisade, and I will raise siege works against you.
4 Okokitisama solo na se, okoloba wuta na mabele, mpe maloba na yo ekobanda kobima na mongongo ya se wuta na putulu. Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi; mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima na mongongo ya se.
You will be brought down and will speak from the ground; your speech will be low from the dust. Your voice will sound like a spirit that speaks from the ground, and out of the dust your speech will whisper.
5 Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka oyo ezali kopumbwa na mopepe; ekosalema bongo na pwasa.
The great number of your invaders will become like fine dust, and the multitude of the ruthless ones as chaff that passes away. It will happen suddenly, in an instant.
6 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.
Yahweh of hosts will come to you with thunder, earthquake, great noise, with strong winds and violent storm, and the flames of a devouring fire.
7 Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli, oyo bakotelemela ye elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye.
It will be like a dream, a vision of the night: A horde of all the nations will fight against Ariel and her stronghold. They will attack her and her fortifications to press upon her.
8 Ekozala lokola moto oyo azali na nzala, bongo azali kolota ndoto ete azali kolia, kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pamba lokola moto oyo azali na posa ya mayi, bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi, kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba, posa na ye ya mayi esili kaka te. Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonso oyo bakobundisa ngomba Siona.
It will be like when a hungry man dreams he is eating, but when he awakes, his stomach is empty. It will be like when a thirsty man dreams that he is drinking, but he when he awakes, he is fainting, with his thirst not quenched. Yes, so will be the great number of nations that fights against Mount Zion.
9 Bozanga maloba mpe bokamwa! Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso! Bolangwa masanga, kasi na vino te! Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te!
Astonish yourselves and be astonished; blind yourselves and be blind! Be drunk, but not with wine; stagger, but not with beer.
10 Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi; akangi bino miso, bino basakoli, azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.
For Yahweh has poured out on you the spirit of deep sleep. He has closed your eyes, the prophets, and has covered your heads, the seers.
11 Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye: « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi: « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »
All revelation has become to you as the words of a book that is sealed, which men might give to one who is learned, saying, “Read this.” He also says, “I cannot, for it is sealed.”
12 To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye: « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi: « Nayebi kotanga te. »
If the book is given to one who cannot read, saying, “Read this,” he says, “I cannot read.”
13 Nkolo alobi: « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.
The Lord said, “This people comes close to me with their mouths and honors me with their lips, but their heart is far from me. Their honor for me is only a commandment of men that has been taught.
14 Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
Therefore, see, I will proceed to do a marvelous thing among this people, wonder after wonder. The wisdom of their wise men will perish, and the understanding of their prudent men will disappear.”
15 Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka: « Nani akoki komona biso? Nani akoyeba? »
Woe to those who deeply hide their plans from Yahweh, and whose deeds are in darkness. They say, “Who sees us, and who knows us?”
16 Bozali nde kobongola makambo! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango: « Asalaki ngai te? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki: « Ozali mayele te? »
You turn things upside down! Should the potter be considered like clay, so that the thing that is made should say about him who made it, “He did not make me,” or the thing formed say about him who formed it, “He does not understand”?
17 Etikali kaka tango moke, Libani ekobongwana elanga ya kitoko, mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba.
In just a little while, Lebanon will be turned into a field, and the field will become a forest.
18 Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, mpe bakufi miso bakomona tango bakobima na butu mpe na molili.
On that day the deaf will hear the words of a book, and the eyes of the blind will see out of the deep darkness.
19 Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.
The oppressed will again rejoice in Yahweh, and the poor among men will rejoice in the Holy One of Israel.
20 Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa:
For the ruthless will cease, and the scoffer will vanish. All those who love to do evil will be eliminated,
21 elongo na bato oyo bakweyisaka bato kati na kosamba mpo na liloba moko, elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, mpo na kokweyisa moto ya sembo.
who by a word make a man out to be an offender. They lay a snare for him who seeks justice at the gate and put the righteous down with empty lies.
22 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mosikoli ya Abrayami, alobi na libota ya Jakobi: « Jakobi akozala lisusu na soni te, elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te.
Therefore this is what Yahweh says concerning the house of Jacob—Yahweh, who redeemed Abraham, “Jacob will no longer be ashamed, nor will his face be pale.
23 Tango akomona kati na bango bana na ye, mosala ya maboko na Ngai, bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi. Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele.
But when he sees his children, the work of my hands, they will make my name holy. They will make holy the name of the Holy One of Jacob and they will stand in awe of the God of Israel.
24 Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele, mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. »
Those who err in spirit will gain understanding, and complainers will learn knowledge.”