< Ezayi 28 >

1 Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo!
Teško gizdavu vijencu pijanica Efrajimovih, uvelu cvijetu blistava mu nakita - onima što uvrh plodnog dola leže vinom opijeni!
2 Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.
Evo, od Gospoda jaki i moćni, kao pljusak s tučom, kao vihor razorni, prolom oblaka i povodanj, i svom ih snagom na zemlju baca.
3 Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi ekonyatama na makolo;
Bit će izgažen nogama gizdav vijenac pijanica Efrajimovih
4 mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge: soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.
i uveo cvijet blistava mu nakita uvrh plodnih dolina; bit će kao rana smokva prije ljeta: čim je tko spazi, odmah je ubere.
5 Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko mpo na ndambo ya bato na Ye;
U onaj dan Jahve nad Vojskama postat će kruna slave i sjajan vijenac Ostatku svoga naroda -
6 akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.
duh pravde onome koji sjedi na stolici sudačkoj i srčanost onome koji odbija napad na vrata.
7 Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi mpo na masanga ya vino; masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango; masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango; bakomi kobunga na bimoniseli na bango, bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.
Oni posrću od vina, teturaju od žestoka pića: svećenici i proroci od žestoka pića posrću; omami ih vino; teturaju od žestoka pića, posrću u viđenjima, ljuljaju se sudeći.
8 Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele; esika ya malamu etikali lisusu te.
Svi su stolovi puni gnusnih bljuvotina, nigdje čista mjesta nema!
9 Azali nani, ye oyo azali koluka koteya? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele?
“Koga on to uči mudrosti, koga on upućuje u objavu? Zar djecu odviknutu od mlijeka odbijenu od prsiju?
10 Pamba te ezali nde « Bilobaloba ya pamba. »
Sav la-sav, sav la-sav, kav la-kav, kav la-kav, zeer šam, zeer šam.”
11 Solo, Nzambe akoloba na bato oyo na nzela ya likukuma mpe na lokota ya bapaya;
Da, mucavim usnama i na stranom jeziku govorit će se ovom narodu.
12 alobaki na bango: « Tala esika ya kopema! Tika ete moto oyo alembi apema; » mpe: « Tala esika ya kimia, » kasi balingaki koyoka te.
On im reče: “Evo počinka, dajte umornom da otpočine! Evo odmora!” Ali ne htjedoše poslušati.
13 Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.
Zato će im Jahve ovako govoriti: “Sav la-sav, sav la-sav, kav la-kav, kav la-kav, zeer šam, zeer šam”, da hodeći padnu nauznak, da se razbiju, zapletu i uhvate.
14 Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe!
Stoga čujte riječ Jahvinu, vi podsmjevači, vi što vladate narodom ovim koji je u Jeruzalemu.
15 Bozali koloba: « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. » (Sheol h7585)
Vi velite: “Sklopismo savez sa smrću i s Podzemljem učinismo sporazum. Kad prođe bič razorni, ne, neće nas dohvatiti, jer od laži načinismo sebi sklonište i od obmane skrovište.” (Sheol h7585)
16 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Stog ovako govori Jahve Gospod: “Evo, postavljam na Sion kamen odabrani, dragocjen kamen ugaoni, temeljac. Onaj koji u nj vjeruje neće propasti.
17 Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.
I uzet ću pravo za mjeru, a pravdu za tezulju.” I tuča će vam zastrti sklonište od laži, a voda otplaviti skrovište;
18 Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye. (Sheol h7585)
propast će savez vaš sa smrću, vaš sporazum s Podzemljem održat' se neće. Kada bič razorni prođe, satrt će vas; (Sheol h7585)
19 Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.
kad god prođe, dohvatit će vas; prolazit će svako jutro, danju i noću. Samo će vas strah uputit u objavu.
20 Boye, ndenge balobaka na lisese: « Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa, mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto; »
Prekratka će bit' postelja da se čovjek pruži, preuzak pokrivač da se umota.
21 Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
Da, kao na gori Perasimu, Jahve će ustati, kao u Dolini gibeonskoj, on će se razjariti, da izvrši djelo svoje, djelo čudnovato, da ispuni naum svoj, naum tajnoviti.
22 Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
Podsmijevanja se okanite, da vas jače okovi ne stegnu; jer čuh da je od Gospoda, Jahve nad Vojskama, zemlji ovoj dosuđeno uništenje.
23 Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai, bosala keba mpe boyoka malamu makambo oyo nazali koloba!
Poslušajte i čujte glas moj, prisluhnite pomno moju besjedu.
24 Boni, ezali tango nyonso nde mosali bilanga abalolaka mabele, akataka mikala mpe atimolaka mabele mpo na kolona?
Ore li orač svakog dana, brazdi, brana njivu svoju?
25 Sima na kobongisa esika ya kolona, boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini? Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, mpe orje, na esika oyo ekoki; mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye?
A kad joj poravna površinu, ne sije li grahor, ne sipa li kumin? Pšenicu gdje treba, proso i ječam, i napokon raž po rubovima?
26 Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.
Bog ga njegov upućuje, on ga uči djelu pravom.
27 Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli to bapine ya shar mpo na kobuka kumini; basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
Ne mlati se grahor cijepom, nećeš točkom po kuminu, već se grahor štapom mlati, a kumin se prutom lupa.
28 Esengeli konika ble mpo na kosala mapa; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.
A da li se žito tare? Ne, nećeš ga dovijeka mlatiti: po njem ćeš pognat kolski točak i konje, ali ga zdrobiti nećeš.
29 Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi mpe bwanya na Ye ezali monene.
I to dolazi od Jahve nad Vojskama, savjetom divnog, mudrošću velikog.

< Ezayi 28 >