< Ezayi 27 >

1 Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya; akoboma elima ya ebale monene.
In that day the LORD with His sore and great and strong sword will punish leviathan the slant serpent, and leviathan the tortuous serpent; and He will slay the dragon that is in the sea.
2 Na mokolo wana, bakoloba: « Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko:
In that day sing ye of her: 'A vineyard of foaming wine!'
3 Ngai Yawe, nabatelaka yango, nasopelaka yango mayi tango nyonso, nakengelaka yango butu mpe moyi mpo ete moto moko te abebisa yango.
I the LORD do guard it, I water it every moment; lest Mine anger visit it, I guard it night and day.
4 Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
Fury is not in Me; would that I were as the briers and thorns in flame! I would with one step burn it altogether.
5 Kasi tika ete bakimela epai na Ngai lokola ndako batonga makasi, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai; solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai! »
Or else let him take hold of My strength, that he may make peace with Me; yea, let him make peace with Me.
6 Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.
In days to come shall Jacob take root, Israel shall blossom and bud; and the face of the world shall be filled with fruitage.
7 Boni, Yawe abetaki ye te ndenge abetaki bato oyo babetaki ye? Boni, abomaki ye te ndenge abomaki bato oyo babomaki ye?
Hath He smitten him as He smote those that smote him? Or is he slain according to the slaughter of them that were slain by Him?
8 Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.
In full measure, when Thou sendest her away, Thou dost contend with her; He hath removed her with His rough blast in the day of the east wind.
9 Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye: akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.
Therefore by this shall the iniquity of Jacob be expiated, and this is all the fruit of taking away his sin: when he maketh all the stones of the altar as chalkstones that are beaten in pieces, so that the Asherim and the sun-images shall rise no more.
10 Engumba ya makasi etikali pamba lokola lopango oyo basundola, babosana mpe etikala pamba lokola esobe; mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.
For the fortified city is solitary, a habitation abandoned and forsaken, like the wilderness; there shall the calf feed, and there shall he lie down, and consume the branches thereof.
11 Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
When the boughs thereof are withered, they shall be broken off; the women shall come, and set them on fire; for it is a people of no understanding; therefore He that made them will not have compassion upon them, and He that formed them will not be gracious unto them.
12 Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.
And it shall come to pass in that day, that the LORD will beat off His fruit from the flood of the River unto the Brook of Egypt, and ye shall be gathered one by one, O ye children of Israel.
13 Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
And it shall come to pass in that day, that a great horn shall be blown; and they shall come that were lost in the land of Assyria, and they that were dispersed in the land of Egypt; and they shall worship the LORD in the holy mountain at Jerusalem.

< Ezayi 27 >