< Ezayi 26 >
1 Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda: Tozali na engumba moko ya makasi; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.
那一天,猶大地要詠唱這首歌曲:「我們有座堅城,以救援作城牆與外郭。
2 Bofungola bikuke mpo ete ekolo ya sembo, ekolo oyo ebatelaka boyokani, ekoka kokota!
你們打開城門,好讓遵守信實的正義民族進去。
3 Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
你的意志堅定,因而你保全了永久的和平,故此人對你有信賴。
4 Botia tango nyonso elikya na Yawe, pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso.
你們應永遠信賴上主,因為上主是永固的磐石。
5 Akitisaka bavandi ya likolo, akweyisaka engumba oyo batonga makasi, alalisaka yango penza na mabele mpe akomisaka yango putulu.
他曾屈服了居高位的人,推翻了高聳的城市,將她推翻在地,使她粉碎,化為塵埃。
6 Makolo ya bato ekonyata-nyata yango: makolo ya babola, matambe ya bato pamba.
踐踏她的,卻是困苦人的腳,是貧窮人的腳。」
7 Nzela ya moto ya sembo, ezali alima; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.
義人的道路是正直的,你上主啊,削平了正直人的途徑。
8 Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.
的確,上主!我們在你正義的路上期待你!你的名號,你的記念,是我們心靈的欲望。
9 Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
我們的心靈在夜間渴望你,我們的心神在清晨尋覓你,因為當你的決斷顯於大地時,世上的居民都要學習正義。
10 Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.
惡人雖然蒙受了憐憫,仍然不學習正義,在世上依然顛倒是非,毫不顧及上主的威嚴。
11 Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango!
上主!你的手雖已高舉,但他們仍看不見;願他們見到你對百姓的熱忱而感到慚愧;並願你為你仇敵所保留的烈火吞滅他們!
12 Yawe, okopesa biso kimia, pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka.
上主!是你賜與了我們和平,因為凡我們所做的,都是你為我們成就的!
13 Oh Yawe, Nzambe na biso, atako bakonzi mosusu bakambaki biso, kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.
上主,我們的天主!除你以外,還有別的主宰治理過我們;然而我們所稱揚的,只有你,你的名號。
14 Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu!
死去的人不會再活,幽魂也不會復生,因為你如此懲罰了,並消滅了他們,使他們所有的記念盡被遺忘。
15 Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.
你增加了本國的人民,上主,你增加了本國的人民,你得了光榮,你拓展了國家所有的邊界。
16 Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.
上主 !我們在困難之中尋求了你,我們在壓迫之中呼求了你,因為那是你對我們的懲罰。
17 Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota, bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi.
有如懷妊臨產的婦女,在苦痛中痙攣呻吟;同樣,上主!我們在你面前也是如此:
18 Tozalaki na zemi, tozalaki mpe kobaluka na pasi; kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe: tomemelaki mabele lobiko te, mpe tomemelaki mokili bato ya sika te.
我們也像懷妊痙攣;然而所產的竟是風,沒有給大地帶來救恩,世界的居民也未因此而得生。
19 Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
你的亡者將再生,他們的屍體將要起立;睡在塵埃中的人們都要甦醒歌詠,因為你的朝露是晶瑩的朝露,大地將拋出幽靈。
20 Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.
我的百姓!去,進入你的內室,關上門,隱藏片刻,等待盛怒過去。
21 Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.
因為,看哪!上主已由自己的地方出來懲罰大地居民的罪惡,大地要暴露自己吞下的鮮血,不再遮掩被殺的人。