< Ezayi 25 >

1 Yawe, ozali Nzambe na ngai; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.
Lord, you are my God. I will honor you and praise who you are, because you have done wonderful things that you planned long ago. You are faithful and trustworthy!
2 Okomisaki engumba mopiku ya mabanga, okomisaki bingumba ya makasi maboke ya mabanga; bandako batonga makasi ya bapaya etikali lisusu na bilongi ya engumba te, bakotonga yango lisusu te.
You have turned the city into a pile of rubble; the fortified town is now a ruin; the foreigner palace is gone. It is no longer a city and it will never be rebuilt.
3 Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.
Because of this powerful nations will honor you; cities of brutal nations will be in awe of you.
4 Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir;
But you have protected the poor and needy when they were in trouble, you shielded them from storms and shaded them from the heat. For the actions of brutal people are like rain beating against a wall,
5 mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe. Osilisaki makelele ya bapaya ndenge pio ya mapata esilisaka molunge; boye nde nzembo ya banyokoli esilaki.
like heat in a desert. You end the noisy uprising of foreigners. In the same way that a cloud's shadow cools down the heat of the day, so the song sung by brutal people is silenced.
6 Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
On this mountain the Lord Almighty will prepare a feast for all nations, a lavish feast of aged wines, rich food, and the best meat.
7 Kaka na ngomba oyo, akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso;
On this mountain he will destroy the veil that covers all the nations, the sheet that is over everyone.
8 akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
He will destroy death forever. The Lord God will wipe away all tears, and everywhere he will take away the humiliation suffered by his people. The Lord has spoken.
9 Na mokolo wana, bakoloba: « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso! »
At that time his people will say, “Look! This is our God; we have trusted in him and he has saved us! This is the Lord we have been looking for. Now we can be happy and celebrate the salvation he brings!”
10 Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.
The Lord's hand of protection will be on this mountain. But the Moabites will be trampled underfoot like straw into the water of a manure pit.
11 Akosembola maboko na Ye kati na yango ndenge basembolaka maboko mpo na kokata mayi. Nzambe akokitisa lolendo na bango mpe mayele ya maboko na bango;
They will reach out their hands to try and save themselves, like swimmers using their hands to swim, but their pride will be humbled however much they thrash about.
12 akobuka bamir milayi na bino ya makasi mpe akolalisa yango na se; akokweyisa yango na mabele kino ekoma putulu.
Moab, he will demolish your fortress with the high walls, bringing it down to the ground, into the dust.

< Ezayi 25 >