< Ezayi 24 >

1 Tala, Yawe akobebisa mokili mpe akokomisa yango lokola esobe; akokotisa mobulu kati na yango mpe akopanza bato na yango.
הנה יהוה בוקק הארץ ובולקה ועוה פניה והפיץ ישביה
2 Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.
והיה כעם ככהן כעבד כאדניו כשפחה כגברתה כקונה כמוכר כמלוה כלוה כנשה כאשר נשא בו
3 Mokili ekobebisama penza nye mpe bakopanza yango nyonso. Yawe nde alobaki yango.
הבוק תבוק הארץ והבוז תבז כי יהוה דבר את הדבר הזה
4 Mokili ezali na matanga mpe ekawuki, mokili mobimba ebebi mpe ekawuki; ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili!
אבלה נבלה הארץ אמללה נבלה תבל אמללו מרום עם הארץ
5 Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.
והארץ חנפה תחת ישביה כי עברו תורת חלפו חק הפרו ברית עולם
6 Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.
על כן אלה אכלה ארץ ויאשמו ישבי בה על כן חרו ישבי ארץ ונשאר אנוש מזער
7 Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi.
אבל תירוש אמללה גפן נאנחו כל שמחי לב
8 Esengo ya mbonda esili, makelele ya bato ya biyenga esili, esengo ya lindanda esili;
שבת משוש תפים חדל שאון עליזים שבת משוש כנור
9 komela vino etikali lisusu na banzembo te, masanga ya makasi ekomi bololo mpo na bato oyo bamelaka yango.
בשיר לא ישתו יין ימר שכר לשתיו
10 Engumba oyo ebeba etikali pamba, bikuke ya bandako nyonso ekangami.
נשברה קרית תהו סגר כל בית מבוא
11 Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, kosepela nyonso ebongwani molili, esengo nyonso elongwe na mokili.
צוחה על היין בחוצות ערבה כל שמחה גלה משוש הארץ
12 Libebi kaka nde etikali kati na engumba, babuki-buki bikuke na yango na biteni.
נשאר בעיר שמה ושאיה יכת שער
13 Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango.
כי כה יהיה בקרב הארץ בתוך העמים כנקף זית כעוללת אם כלה בציר
14 Bamoko bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na esengo; wuta na weste ya mayi monene, bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.
המה ישאו קולם ירנו בגאון יהוה צהלו מים
15 Yango wana, kuna na ngambo ya este, bopesa nkembo na Yawe; bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, kati na bisanga ya ebale monene.
על כן בארים כבדו יהוה באיי הים שם יהוה אלהי ישראל
16 Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo: « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki: « Nakomi na suka, nakomi na suka! Mawa mpo na ngai! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka! »
מכנף הארץ זמרת שמענו צבי לצדיק ואמר רזי לי רזי לי אוי לי בגדים בגדו ובגד בוגדים בגדו
17 Oh bato ya mokili, somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino.
פחד ופחת ופח עליך יושב הארץ
18 Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.
והיה הנס מקול הפחד יפל אל הפחת והעולה מתוך הפחת ילכד בפח כי ארבות ממרום נפתחו וירעשו מוסדי ארץ
19 Mokili ebukani-bukani, mokili epanzani, mokili eningani makasi.
רעה התרעעה הארץ פור התפוררה ארץ מוט התמוטטה ארץ
20 Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.
נוע תנוע ארץ כשכור והתנודדה כמלונה וכבד עליה פשעה ונפלה ולא תסיף קום
21 Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se.
והיה ביום ההוא יפקד יהוה על צבא המרום במרום ועל מלכי האדמה על האדמה
22 Bakosangisa bango elongo kati na libulu ndenge basangisaka bakangami na boloko, bakokangela bango na boloko mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.
ואספו אספה אסיר על בור וסגרו על מסגר ומרב ימים יפקדו
23 Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.
וחפרה הלבנה ובושה החמה כי מלך יהוה צבאות בהר ציון ובירושלם ונגד זקניו כבוד

< Ezayi 24 >