< Ezayi 23 >
1 Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri: Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso: ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
Oracle contre Tyr: Lamentez-vous, vaisseaux de Tarchich, car elle est dévastée: plus de maisons, plus de port d’accès! La nouvelle leur en a été annoncée de Kittim.
2 Bino bavandi ya esanga, bino bato ya mombongo ya Sidoni, oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi, bovanda nye!
Habitants de la côte, soyez muets de stupeur, vous que gorgeaient de richesses les marchands de Sidon, ces hardis navigateurs.
3 Lifuti na ye ezalaki: ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili. Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo.
À travers les vastes flots, les grains du Chihor, les moissons du Nil venaient l’approvisionner; elle était le marché des nations.
4 Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi: « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »
Sidon, rougis de honte, car ainsi parle la mer, la citadelle de la mer: "Je n’ai point ressenti de douleurs, je n’ai pas enfanté, je n’ai point nourri de jeunes gens ni élevé de jeunes filles."
5 Tango maloba yango ekokoma na Ejipito, bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri.
Tout comme les nouvelles arrivées d’Egypte, les nouvelles venant de Tyr sèment la terreur.
6 Bokatisa na ngambo ya Tarsisi, bolela makasi, bino bavandi ya esanga.
Emigrez à Tarchich, lamentez-vous, habitants de la côte!
7 Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo, engumba oyo ebanda kala penza mpe oyo makolo na yango ememaka yango kowumela na mikili ya mosika?
Est-ce là cette ville si triomphante à votre gré, contemporaine des jours antiques, que ses pieds portaient au loin pour fonder des demeures?
8 Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri? Tiri oyo azalaki kokabola mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi; mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.
Qui donc a conçu ce dessein contre Tyr, à la riche couronne, dont les trafiquants sont des princes et les marchands des grands de la terre?
9 Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.
C’Est l’Eternel-Cebaot qui l’a conçu, pour abattre l’orgueil de tout ce faste, pour humilier tous ces grands de la terre.
10 Oh Tarsisi, mboka kitoko, koma kosala bilanga ndenge basalaka pembeni ya ebale Nili, pamba te libongo ezali lisusu te.
Parcours à présent ton territoire, pareille à un fleuve, ô fille de Tarchich: il n’est plus d’obstacle.
11 Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene mpe alengisaki bikolo, apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi;
L’Eternel a étendu la main sur la mer, il a fait trembler les royaumes; il a décrété contre Canaan la ruine de ses forteresses.
12 alobaki: « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo! Telema, katisa na ngambo ya Shipele! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »
Il a dit: "Tu ne continueras plus à triompher; opprimée maintenant, mets-toi en route, vierge, fille de Sidon, passe dans le pays de Kittim: mais là même, point de repos pour toi!…
13 Tala mokili ya bato ya Chalide, bato oyo bazalaka lisusu te! Bato ya Asiri bakomisaki yango esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe; batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela, babukaki bandako na yango batonga makasi mpe bakomisaki yango putulu.
Voyez ce pays des Chaldéens, ce peuple qui n’était pas jadis, ces nomades du désert qu’Achour a solidement établis: ils ont érigé des tours contre Tyr, ils en ont démoli les palais et fait d’elle une ruine!
14 Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi! Pamba te ndako na bino, oyo batonga makasi ebukani.
Lamentez-vous, vaisseaux de Tarchich, car votre citadelle est détruite!
15 Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba:
En ce jour, Tyr tombera en oubli pour soixante-dix ans, juste la durée d’un seul règne. Au bout des soixante-dix ans, il adviendra de Tyr ce que dit la chanson de la courtisane:
16 « Kamata lindanda, tambola na engumba mobimba, oh mwasi ya ndumba oyo babosana; beta yango malamu, yemba banzembo ebele mpo ete bakanisa yo lisusu! »
"Prends la harpe, fais le tour de la ville, courtisane oubliée; tâche de bien jouer, multiplie tes chants, pour qu’on se ressouvienne de toi!"
17 Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili.
Donc au bout de soixante-dix ans, l’Eternel pensera à Tyr, et celle-ci reprendra le cours de ses profits impurs et de ses débauches avec tous les royaumes de la terre, qui couvrent la surface du globe.
18 Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko.
Mais son gain et ses salaires impurs seront consacrés à l’Eternel; ils ne seront pas entassés ni mis en réserve: les profits de son trafic sont destinés à ceux qui demeurent en présence de l’Eternel, pour qu’ils puissent manger en abondance et se vêtir de façon somptueuse.