< Ezayi 22 >

1 Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli: Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako?
Oracle sur la vallée des visions. Qu’as-tu donc, que tout ton peuple monte sur les toits?
2 Oh engumba etonda na loyenge, engumba etonda na makelele mpe na bisengo! Bibembe na yo ekufi na mopanga te to mpe na bitumba te.
Ville bruyante, pleine de tumulte, Cité joyeuse! Tes morts ne périront pas par l’épée, Ils ne mourront pas en combattant.
3 Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.
Tous tes chefs fuient ensemble, Ils sont faits prisonniers par les archers; Tous tes habitants deviennent à la fois captifs, Tandis qu’ils prennent au loin la fuite.
4 Yango wana nalobaki: « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai! »
C’est pourquoi je dis: Détournez de moi les regards, Laissez-moi pleurer amèrement; N’insistez pas pour me consoler Du désastre de la fille de mon peuple.
5 Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.
Car c’est un jour de trouble, d’écrasement et de confusion, Envoyé par le Seigneur, l’Éternel des armées, Dans la vallée des visions. On démolit les murailles, Et les cris de détresse retentissent vers la montagne.
6 Mampinga ya Elami batomboli makonga, mosusu bamati na bashar mpe bampunda; Kiri abimisi nguba.
Élam porte le carquois; Des chars de combattants, des cavaliers, s’avancent; Kir met à nu le bouclier.
7 Lubwaku na yo, oyo eleki kitoko etondi na bashar, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda batelemi-telemi na bikuke ya engumba;
Tes plus belles vallées sont remplies de chars, Et les cavaliers se rangent en bataille à tes portes.
8 bibombamelo ya Yuda etikali lisusu te. Na mokolo wana, obalolaki miso na yo na bibundeli oyo ezalaka na Ndako ya Zamba.
Les derniers retranchements de Juda sont forcés, Et en ce jour tu visites les armures de la maison de la forêt.
9 Bomonaki ete Engumba ya mokonzi Davidi ezali na madusu mingi kati na mir oyo ezingeli yango; boye bobombaki mayi kati na Liziba oyo ezalaka na se,
Vous regardez les brèches nombreuses faites à la ville de David, Et vous retenez les eaux de l’étang inférieur.
10 botangaki motango ya bandako ya Yelusalemi, bobukaki mosusu mpo na kolendisa mir ya monene.
Vous comptez les maisons de Jérusalem, Et vous les abattez, pour fortifier la muraille.
11 Bosalaki liziba mpo na kobomba mayi ya liziba ya kala kati na bamir mibale, kasi bobalolaki miso na bino te mpo na kotala Ye oyo asalaki mpe abongisaki yango wuta kala.
Vous faites un réservoir entre les deux murs, Pour les eaux de l’ancien étang. Mais vous ne regardez pas vers celui qui a voulu ces choses, Vous ne voyez pas celui qui les a préparées de loin.
12 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.
Le Seigneur, l’Éternel des armées, vous appelle en ce jour A pleurer et à vous frapper la poitrine, A vous raser la tête et à ceindre le sac.
13 Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino! Bozalaki koloba: « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa! »
Et voici de la gaîté et de la joie! On égorge des bœufs et l’on tue des brebis, On mange de la viande et l’on boit du vin: Mangeons et buvons, car demain nous mourrons!
14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango na matoyi na ngai moko penza: « Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
L’Éternel des armées me l’a révélé: Non, ce crime ne vous sera point pardonné que vous ne soyez morts, Dit le Seigneur, l’Éternel des armées.
15 Tala maloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Kende kokuta Shebina, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, loba na ye:
Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel des armées: Va vers ce courtisan, Vers Schebna, gouverneur du palais:
16 ‹ Ozali kosala nini awa, mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo mpe kotonga epemelo na ye kati na lidusu ya libanga monene?
Qu’y a-t-il à toi ici, et qui as-tu ici, Que tu creuses ici un sépulcre? Il se creuse un sépulcre sur la hauteur, Il se taille une demeure dans le roc!
17 Tala, Yawe akomi pene ya koningisa yo mpe kobwaka yo mosika, yo moto ya makasi!
Voici, l’Éternel te lancera d’un jet vigoureux; Il t’enveloppera comme une pelote,
18 Akobalola yo ndenge babalolaka ndembo mpe akobwaka yo na etando moko ya monene. Kuna nde okokufa, mpe bashar na yo ya lokumu ekotikala, yo oyo osalaka soni ya ndako ya mokonzi na yo.
Il te fera rouler, rouler comme une balle, Sur une terre spacieuse; Là tu mourras, là seront tes chars magnifiques, O toi, l’opprobre de la maison de ton maître!
19 Nakolongola yo na mosala, mpe lokumu na yo ekosila.
Je te chasserai de ton poste, L’Éternel t’arrachera de ta place.
20 Na mokolo wana, nakobengisa mosali na Ngai, Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia.
En ce jour-là, J’appellerai mon serviteur Éliakim, fils de Hilkija;
21 Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda.
Je le revêtirai de ta tunique, je le ceindrai de ta ceinture, Et je remettrai ton pouvoir entre ses mains; Il sera un père pour les habitants de Jérusalem Et pour la maison de Juda.
22 Nakotia fungola ya ndako ya Davidi na mapeka na ye: oyo akofungola, moto moko te akokanga yango; mpe oyo akokanga, moto moko te akofungola yango.
Je mettrai sur son épaule la clé de la maison de David: Quand il ouvrira, nul ne fermera; Quand il fermera, nul n’ouvrira.
23 Nakopika ye lokola sete na esika ya malamu; akozala lokola kiti ya bokonzi ya lokumu mpo na ndako ya tata na ye.
Je l’enfoncerai comme un clou dans un lieu sûr, Et il sera un siège de gloire pour la maison de son père.
24 Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye: kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo: kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene.
Il sera le soutien de toute la gloire de la maison de son père, Des rejetons nobles et ignobles, De tous les petits ustensiles, Des bassins comme des vases.
25 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, sete oyo bapikaki na esika ya malamu ekolongwa, ekobukana mpe ekokweya; mpe mokumba oyo amemaki ekokweya. › » Yawe nde alobaki.
En ce jour, dit l’Éternel des armées, Le clou enfoncé dans un lieu sûr sera enlevé, Il sera abattu et tombera, Et le fardeau qui était sur lui sera détruit, Car l’Éternel a parlé.

< Ezayi 22 >