< Ezayi 21 >
1 Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene: Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.
Proroštvo primorskoj pustinji. Kao što vihori, hujeći nad Negebom, dolaze iz pustinje, kraja strahotna
2 Namonaki emoniseli moko ya somo: Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango! Medi, zingela bango! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.
- otkri mi se u strašnom viđenju - tako pljačkaš pljačka, pustošnik pustoši. “Navali, Elame, opsjedni, Medijo! Dokrajčit ću sve jauke.”
3 Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.
Zato bedra moja probadaju grčevi; bolovi me spopadaju k'o trudovi porodilju; od smućenosti ogluših, od straha obnevidjeh.
4 Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, nakomi kolenga na somo, mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo ekomeli ngai somo makasi.
Srce mi dršće, groza me obuze, sumrak za kojim čeznuh postade mi užas.
5 Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta!
Postavljaju stol, prostiru stolnjak, jede se i pije ... Ustajte, knezovi, mažite štit!
6 Tala liloba oyo Nkolo alobi na ngai: « Kende, tia mokengeli; mpe tika ete aloba makambo oyo akomona.
Jer Gospod mi ovako reče: “Idi, postavi stražara! Što vidi, nek' javi.
7 Soki amoni shar oyo bampunda mibale ezali kobenda, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, bamoko bamati likolo ya ba-ane, bamosusu bamati likolo ya bashamo, tika ete asala keba, asala keba penza! »
Vidi li konjanike, jahače udvojene, jahače na magarcima, jahače na devama, neka dobro pazi s pažnjom napetom!”
8 Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi: « Nkolo, mokolo mobimba, natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela; mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana.
A stražar viknu: “Povazdan, Gospodaru, stojim na stražarnici, čitavu noć na straži prostojim.”
9 Tala, moto moko azali koya awa na shar, oyo bampunda mibale ezali kobenda. Azongisaki eyano: ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo! Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali mpe epanzani na mabele! › »
I gle, dolaze konjanici, jahači udvojeni. Oni mi viknuše, oni rekoše: “Pade, pade Babilon! Svi kipovi njegovih bogova o zemlju se razbiše.”
10 Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.
Omlaćeno žito, čedo gumna moga, što čuh od Jahve nad Vojskama, Boga Izraelova, objavih vam!
11 Maloba na Yawe na tina na Duma. Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri: « Mokengeli, olobi nini mpo na butu? Mokengeli olobi nini mpo na butu? »
Proroštvo o Edomu. Viču mi iz Seira: “Stražaru, koje je doba noći? Stražaru, koje je doba noći?”
12 Mokengeli azongisaki: Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya. Soki bolingi kotuna mituna, botuna; bongo bozonga mpe boya lisusu.
Stražar odgovori: “Dolazi jutro, a zatim opet noć. Hoćete li pitati, pitajte, vratite se, dođite!”
13 Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi: Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.
Proroštvo o Arapima. U šikarama pustinjskim počivate, dedanske karavane.
14 Bopesa mayi na moto oyo azali na posa ya mayi; bino bavandi ya mokili ya Tema, bopesa bilei na bato oyo bazali kokima bitumba.
Vodu iznesite pred žedne, stanovnici zemlje temske, iziđite s kruhom pred bjegunca.
15 Pamba te bazali nde kokima mopanga, mopanga oyo babimisi na ebombelo na yango, bazali nde kokima tolotolo oyo etelemi makasi mpe bitumba ya makasi.
Pred mačevima bježe oni, pred mačem trgnutim, pred lukom zapetim, pred bojem žestokim.
16 Tala liloba oyo Nkolo alobaki na ngai: « Etikali kaka mobu moko, ndenge batangaka mikolo ya mowumbu, nkembo nyonso ya Kedari ekosuka.
Da, ovako mi reče Gospod: “Još jedna godina, godina nadničarska, i nestat će sve slave Kedrove.
17 Bongo, ekotikala kaka mwa ndambo moke ya basoda oyo babundaka na matolotolo mpe ya basoda ya mpiko kati na Kedari, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
A od mnogobrojnih strijelaca među hrabrim sinovima Kedrovim malo će ih ostati.” Tako je govorio Jahve, Bog Izraelov.