< Ezayi 20 >

1 Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi;
アツスリヤのサルゴン王タルタンを遣してアシドドにゆかしむ 彼がアシドドを攻てとりし年にあたり
2 kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi: « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
この時ヱホバ、アモツの子イザヤに托てかたりたまはく 往なんぢの腰よりあらたへの衣をとき汝の足より履をぬげ ここに於てかれその如くなし赤裸跣足にて歩めり
3 Bongo Yawe alobaki: « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi,
ヱホバ言給く わが僕イザヤは三年の間はだかはだしにてあゆみ エジプトとエテオピアとの豫兆となり奇しき標となりたり
4 mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu: ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.
斯のごとくエジプトの虜とエテオピアの俘囚とはアツスリヤの王にひきゆかれ その若きも老たるもみな赤裸跣足にて臀までもあらはしエジプトの恥をしめすべし
5 Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni.
かれらはその恃とせるエテオピアその誇とせるエジプトのゆゑをもて懼れはぢん
6 Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba: ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini? › »
その日この濱邊の民いはん 視よ われらの恃とせる國われらが遁れゆきて助をもとめアツスリヤ王の手より救出されんとせし國すでに斯のごとし 我儕はいかにして脱かるるを得んやと

< Ezayi 20 >