< Ezayi 2 >

1 Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi:
亚摩斯的儿子以赛亚得默示,论到犹大和耶路撒冷。
2 Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
末后的日子,耶和华殿的山必坚立, 超乎诸山,高举过于万岭; 万民都要流归这山。
3 Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba: « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
必有许多国的民前往,说: 来吧,我们登耶和华的山, 奔雅各 神的殿。 主必将他的道教训我们; 我们也要行他的路。 因为训诲必出于锡安; 耶和华的言语必出于耶路撒冷。
4 Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
他必在列国中施行审判, 为许多国民断定是非。 他们要将刀打成犁头, 把枪打成镰刀。 这国不举刀攻击那国; 他们也不再学习战事。
5 Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe!
雅各家啊,来吧! 我们在耶和华的光明中行走。
6 Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
耶和华,你离弃了你百姓雅各家, 是因他们充满了东方的风俗, 作观兆的,像非利士人一样, 并与外邦人击掌。
7 Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, bomengo na bango ezali na suka te. Mokili na bango etondi na bampunda mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
他们的国满了金银, 财宝也无穷; 他们的地满了马匹, 车辆也无数。
8 Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, bato bakomi kofukamela biloko oyo esalemi na maboko na bango, oyo misapi na bango esili kosala.
他们的地满了偶像; 他们跪拜自己手所造的, 就是自己指头所做的。
9 Yango wana, bato bakokitisa mito, mpe bato ya lokumu bakotonda na soni; kolimbisa bango te!
卑贱人屈膝; 尊贵人下跪; 所以不可饶恕他们。
10 Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye!
你当进入岩穴,藏在土中, 躲避耶和华的惊吓和他威严的荣光。
11 Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama; Yawe kaka nde akonetolama.
到那日,眼目高傲的必降为卑; 性情狂傲的都必屈膝; 惟独耶和华被尊崇。
12 Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,
必有万军耶和华降罚的一个日子, 要临到骄傲狂妄的; 一切自高的都必降为卑;
13 banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama, mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani;
又临到黎巴嫩高大的香柏树和巴珊的橡树;
14 bangomba nyonso ya milayi mpe bangomba nyonso ya mikuse,
又临到一切高山的峻岭;
15 bandako nyonso ya milayi, bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi;
又临到高台和坚固城墙;
16 bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
又临到他施的船只并一切可爱的美物。
17 Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
骄傲的必屈膝; 狂妄的必降卑。 在那日,惟独耶和华被尊崇;
18 Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
偶像必全然废弃。
19 Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
耶和华兴起,使地大震动的时候, 人就进入石洞,进入土穴, 躲避耶和华的惊吓和他威严的荣光。
20 Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
到那日,人必将为拜而造的金偶像、银偶像 抛给田鼠和蝙蝠。
21 Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
到耶和华兴起,使地大震动的时候, 人好进入磐石洞中和岩石穴里, 躲避耶和华的惊吓和他威严的荣光。
22 Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango?
你们休要倚靠世人。 他鼻孔里不过有气息; 他在一切事上可算什么呢?

< Ezayi 2 >