< Ezayi 15 >
1 Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi: Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki; solo, ebebisamaki kaka na butu moko!
モアブにかかる重負のよげん曰く モアブのアルは一夜の間にあらされて亡びうせモアブのキルは一夜のまに荒されてほろびうせん
2 Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.
かれバイテおよびデボンの高所にのぼりて哭きモアブはネボ及びメデバの上にてなげきさけぶおのおのその頭を禿にしその鬚をことごとく剃たり
3 Balati-lati basaki na babalabala, bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka; bazali penza kosopa mpinzoli ebele.
かれら麁服をきてその衢にあり屋蓋または廣きところにて皆なきさけび悲しむこと甚だし
4 Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.
ヘシボンとエレアレと叫びてその聲ヤハズにまで聞ゆこの故にモアブの軍兵こゑをあげその靈魂うちに在てをののけり
5 Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.
わが心モアブのために叫びよばはれりその貴族はゾアルおよびヱグラテシリシヤにのがれ哭つつルヒテの坂をのぼりホロナイムの途にて敗亡の聲をあぐ
6 Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.
ニムリムの水はかわき草はかれ苗はつきて緑蔬あらず
7 Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.
このゆゑに彼等はその獲たる富とその藏めたる物をたづさへて柳の河をわたらん
8 Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.
その泣號のこゑはモアブの境をめぐり悲歎のこゑはエグライムにいたりなげきの聲はべエルエリムにいたる
9 Mayi ya Dimoni etondi na makila, kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni: nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.
デモンの水は血にて充われデモンの上にひとしほ禍害をくはへモアブの遁れたる者とこの地の遺りたるものとに獅をおくらん