< Ezayi 14 >

1 Yawe akoyokela Jakobi mawa, akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango; bongo bapaya bakosangana na bango mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi.
上主必要憐恤雅各伯,再揀選以色列,使他們安居在自己的國土;外方人要與他們聯合,加入雅各伯的家族。
2 Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.
選民要接受他們,要帶領他們回歸故里;以色列家族,在上主的國土內,要佔有他們為奴婢;於是以色列人要俘擄那俘擄過他們的人,要統治壓迫他們的人。
3 Na mokolo oyo Yawe akopesa yo bopemi na mosala na yo, na komitungisa na yo mpe na misala makasi oyo bapesaki yo,
當上主賜你擺脫困苦、憂患和你受的苦役時,那天,
4 okoyemba nzembo oyo mpo na kotiola mokonzi ya Babiloni; okoloba: « Ndenge nini monyokoli akomi na suka? Ndenge nini penza lolendo na ye esili?
你要對巴比倫王高唱這首諷刺詩說:怎麼,暴虐者住手了!強橫止息了!
5 Yawe abuki fimbu ya moto mabe, lingenda ya bokonzi ya bakambi,
邪惡者的棍棒,統治者的權杖,已為上主折斷,
6 oyo azalaki kokweyisa bato na kanda mpe kobeta bango na kolemba te, oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi mpe konyokola bango na mawa te.
就是那懷著怒氣,三番五次痛擊過萬民,在忿恨中以無情的殘虐,蹂躪過萬邦的棍杖。
7 Mikili nyonso ezwi bopemi mpe kimia, ekomi koganga na esengo.
大地安謐寧靜,人人興高采烈;
8 Banzete ya sipele ezali kosepela mpo na kokweya na yo, mpe banzete ya sedele ya Libani ezali koloba: ‹ Wuta tango okweyaki na se, moto moko te akweyisaka lisusu biso. ›
連松樹和黎巴嫩的香柏也都因你而喜慶:「自從你仆倒後,再沒有誰上我們這裏來砍伐!」
9 Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo. (Sheol h7585)
地下的陰府為了你而激動,為歡迎你的來臨;並為了你,喚醒幽魂及地上所有的貴卿,使列國的君王由自己的寶座上起立; (Sheol h7585)
10 Bango nyonso bakozwa maloba mpe bakoloba na yo: ‹ Yo mpe okomi moto ya bolembu lokola biso, okokani na biso! ›
眾人都開口對你說:「連你也衰弱得和我們一樣啊!你也與我們相同啊!」
11 Lokumu na yo nyonso ekiti kino na mokili ya bakufi, elongo na makelele ya mandanda na yo. Nkusu etondi na se na yo lokola mbeto, mpe mitsopi ezipi yo lokola elamba. (Sheol h7585)
你的豪華,你琴瑟的樂聲,也墮入了陰府;你下面舖的是蛆,上面蓋的是蟲。 (Sheol h7585)
12 Ndenge nini penza okweyi wuta na likolo, oh monzoto oyo engengaka na tongo, mwana mobali ya tongo makasi? Bakweyisi yo penza kino na mabele, yo moto oyo ozalaki kopanza bikolo!
朝霞的兒子--晨星!你怎會從天墜下﹖傾覆萬邦者!你怎麼也被砍倒在地﹖
13 Ozalaki komilobela kati na motema: ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor;
你心中曾說過:「我要直沖霄漢,高置我的御座在天主的星宿以上;我要坐在盛會的山上,極北之處;
14 nakomata kino na likolo ya mapata, nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. ›
我要升越雲表,與至高者相平衡!」
15 Kasi okiti nde na mokili ya bakufi, na se penza ya libulu. (Sheol h7585)
然而你卻下到了陰府,深淵的極處。 (Sheol h7585)
16 Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna: ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo?
看見你的,必注視你,仔細端詳你說:「這不是那使大地戰慄,列國動盪,
17 Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, kokweyisa bingumba na yango mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango? ›
化世界為荒野,摧毀城邑,不為俘囚開放監獄的人嗎﹖」
18 Bakonzi nyonso ya bikolo balalaka na lokumu, moko na moko kati na kunda na ye;
萬邦的君王都在榮耀中安葬,各在自己的陰宅裏;
19 kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.
但是你卻被拋於墳外,像一個叫人厭惡的流產胎兒,為刀箭殺戮的死者所掩蓋,有如遭踐踏的死屍。連那些被拋在石坑裏的,
20 Okotikala kosangana na bango te kati na kunda, pamba te obebisaki mokili na yo mpe obomaki bato na yo. Bakotikala lisusu kotanga te bakombo ya bakitani ya bato mabe.
你也不得與他們一同埋葬,因為你破壞了你的國土,殘殺了你的人民:惡人的後代永不為人所提念。
21 Bobongisa esika mpo na koboma bana na ye ya mibali likolo ya masumu ya batata na bango! Tika ete balamuka lisusu te mpo na kozwa mabele lokola libula mpe kotondisa mokili elongo na bingumba na bango.
你們應為他們的兒子準備屠場,因為他們的父親有了罪孽;他們決不能再興起,佔據大地,而使地面滿是荒涼。
22 Nakotelemela bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakolongola kombo ya Babiloni mpe nyonso oyo ekotikala, bana mpe bakitani na yango, elobi Yawe.
我要起來攻擊他們--萬軍上主的斷語--我要抹去巴比倫的名號、遺民、後裔和子孫--上主的斷語。
23 Nakokomisa yango esika ya potopoto mpe lopango ya bampuku; mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
我要使她成為刺蝟的領土和池沼,我以毀滅的掃帚將她掃淨--萬軍上主的斷語。
24 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi: « Solo, ndenge kaka nabongisi, ndenge wana mpe ekosalema; makambo oyo nazali na yango na makanisi, yango nde ekokokisama.
萬軍的上主起誓說:「實在,我怎樣想,必怎樣實現;我怎樣計劃,必怎樣成功:
25 Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »
我要在我的國土內粉碎亞述,在我的山嶺上將她踐踏;她的重擔必要由他們肩上卸下。」
26 Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa mpo na mokili mobimba, mpe yango nde loboko oyo asili kosembola mpo na kotelemela bikolo nyonso.
這是對全地所決定的計劃,這是向萬邦所伸展的手臂,
27 Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano; bongo nani akolongola yango? Loboko na Ye esili kosembolama; nani akozongisa yango?
因為萬軍的上主已決定,誰能阻止﹖他的手已伸出,誰能使它收回﹖
28 Maloba oyo eyaki na mobu oyo mokonzi Akazi akufaki:
在阿哈次駕崩那年有以下這個神諭:「
29 « Bino bato nyonso ya Filisitia, bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe.
全體培肋舍特啊! 你不要因為打擊你的棍棒折斷了就喜悅,因為由蛇的根子將生出毒蝮,而牠的子息必是飛龍。
30 Ye oyo aleki mobola nde akozwa eloko ya kolia, mpe moto oyo akelela nde akolala na kimia; kasi nakoboma bato na yo na nzala; mpe bato oyo bakobika, bakoboma bango.
貧苦的人在我的牧場上必得飼養,窮困的人要泰然安息;但是我要以饑荒餓死你的餘生,殺絕你的遺民。
31 Oh ekuke, lela makasi! Engumba, ganga makasi! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.
門啊! 哀號罷!城啊!悲鳴罷!全體培肋舍特啊!戰慄罷!因為有煙從北而來,在她的隊伍中沒有落伍者。」
32 Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »
然而要怎樣答覆外邦的使者﹖「上主建立了熙雍,使他民族中的憂患者,在那裏獲得保護。」

< Ezayi 14 >