< Ezayi 13 >

1 Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli:
The burden of Babylon that Isaiah son of Amoz has seen:
2 Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete, boganga epai na bango; bopepa bango loboko mpo ete bakota na bikuke ya bakambi.
“Lift up an ensign on a high mountain, Raise the voice to them, wave the hand, And they go into the openings of nobles.
3 Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.
I have given charge to My sanctified ones, Also I have called My mighty ones for My anger, Those rejoicing at My excellence.”
4 Boyoka makelele likolo ya bangomba: ezali lokola makelele ya bato ebele! Boyoka lokito ya makelele ya bikolo: ezali lokola bikolo esangana esika moko! Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali pene ya kokende na etumba.
A voice of a multitude in the mountains, A likeness of a numerous people, A voice of noise from the kingdoms of nations who are gathered, YHWH of Hosts inspecting a host of battle!
5 Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo; Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye; mpo na kobebisa mokili mobimba.
They are coming in from a far-off land, From the end of the heavens, YHWH and the instruments of His indignation, To destroy all the land.
6 Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Howl, for the Day of YHWH [is] near, It comes as destruction from the Mighty.
7 Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.
Therefore, all hands fail, And every heart of man melts.
8 Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
And they have been troubled, Pains and pangs take them, They are pained as a travailing woman, A man marvels at his friend, The appearance of flames—their faces!
9 Tala, mokolo na Yawe ezali koya, ezali mokolo moko ya pasi, mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi mpo na kobebisa mokili mpe koboma bato ya masumu kati na yango.
Behold, the Day of YHWH comes, Fierce, with wrath, and heat of anger, To make the land become a desolation, Indeed, He destroys its sinning ones from it.
10 Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te: moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
For the stars of the heavens, and their constellations, Do not cause their light to shine, The sun has been darkened in its going out, And the moon does not cause its light to come forth.
11 Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
“And I have appointed evil on the world, And on the wicked their iniquity, And have caused the excellence of the proud to cease, And I make the excellence of the terrible low.
12 Nakosala ete bato bakoma ya koluka lokola wolo ya peto, lokola wolo ya mboka Ofiri.
I make man more rare than fine gold, And a common man than pure gold of Ophir.
13 Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.
Therefore I cause the heavens to tremble, And the earth shakes from its place, In the wrath of YHWH of Hosts, And in a day of the heat of His anger.
14 Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.
And it has been, as a roe driven away, And as a flock that has no gatherer, Each to his people—they turn, And each to his land—they flee.
15 Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.
Everyone who is found is thrust through, And everyone who is added falls by sword.
16 Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.
And their sucklings are dashed to pieces before their eyes, Their houses are spoiled, and their wives lain with.
17 Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango, bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te mpe basepelaka na bango na wolo te.
Behold, I am stirring up the Medes against them, Who do not esteem silver, And gold—they do not delight in it.
18 Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te: liso na bango ekotala bana na mawa te.
And bows dash young men to pieces, And they do not pity the fruit of the womb, Their eye has no pity on sons.
19 Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.
And Babylon, the beauty of kingdoms, The glory, the excellence of the Chaldeans, Has been as overthrown by God, With Sodom and with Gomorrah.
20 Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso; kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo, mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango.
She does not sit forever, Nor continue to many generations, Nor does Arab pitch tent there, And shepherds do not lie down there.
21 Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna; bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango, ba-esulungutu ekotonda na bandako, maligbanga ekokoma kovanda kuna mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna.
And desert-dwellers have lain down there, And their houses have been full of howlers, And daughters of an ostrich have dwelt there, And goats skip there.
22 Banyawu ya zamba ekotonda na bandako na bango ya makasi, mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. Tango na yango esili kobelema, mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.
And howlers—he has responded in his forsaken habitations, And dragons in palaces of delight, And her time [is] near to come, And her days are not drawn out!”

< Ezayi 13 >