< Ezayi 12 >
1 Na mokolo wana, okoloba: « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai!
到那日,你必说: 耶和华啊,我要称谢你! 因为你虽然向我发怒, 你的怒气却已转消; 你又安慰了我。
2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; azali lobiko na ngai. »
看哪! 神是我的拯救; 我要倚靠他,并不惧怕。 因为主耶和华是我的力量, 是我的诗歌, 他也成了我的拯救。
3 Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.
所以,你们必从救恩的泉源欢然取水。
4 Na mokolo wana bokoloba: « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.
在那日,你们要说: 当称谢耶和华,求告他的名; 将他所行的传扬在万民中, 提说他的名已被尊崇。
5 Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango!
你们要向耶和华唱歌, 因他所行的甚是美好; 但愿这事普传天下。
6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino! »
锡安的居民哪,当扬声欢呼, 因为在你们中间的以色列圣者乃为至大。