< Ezayi 11 >

1 Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.
ויצא חטר מגזע ישי ונצר משרשיו יפרה
2 Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye: Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe;
ונחה עליו רוח יהוה--רוח חכמה ובינה רוח עצה וגבורה רוח דעת ויראת יהוה
3 esengo na ye ekozala na kotosa Yawe. Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka;
והריחו ביראת יהוה ולא למראה עיניו ישפוט ולא למשמע אזניו יוכיח
4 kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
ושפט בצדק דלים והוכיח במישור לענוי ארץ והכה ארץ בשבט פיו וברוח שפתיו ימית רשע
5 Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.
והיה צדק אזור מתניו והאמונה אזור חלציו
6 Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme, nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba; mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko, bongo mwana moke nde akoyeisa yango.
וגר זאב עם כבש ונמר עם גדי ירבץ ועגל וכפיר ומריא יחדו ונער קטן נהג בם
7 Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko, bana na yango mpe ekolala esika moko, bongo nkosi ekolia matiti lokola ngombe.
ופרה ודב תרעינה יחדו ירבצו ילדיהן ואריה כבקר יאכל תבן
8 Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka, mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka.
ושעשע יונק על חר פתן ועל מאורת צפעוני גמול ידו הדה
9 Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
לא ירעו ולא ישחיתו בכל הר קדשי כי מלאה הארץ דעה את יהוה כמים לים מכסים
10 Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
והיה ביום ההוא שרש ישי אשר עמד לנס עמים אליו גוים ידרשו והיתה מנחתו כבוד
11 Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
והיה ביום ההוא יוסיף אדני שנית ידו לקנות את שאר עמו--אשר ישאר מאשור וממצרים ומפתרוס ומכוש ומעילם ומשנער ומחמת ומאיי הים
12 Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.
ונשא נס לגוים ואסף נדחי ישראל ונפצות יהודה יקבץ מארבע כנפות הארץ
13 Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.
וסרה קנאת אפרים וצררי יהודה יכרתו אפרים לא יקנא את יהודה ויהודה לא יצר את אפרים
14 Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.
ועפו בכתף פלשתים ימה יחדו יבזו את בני קדם אדום ומואב משלוח ידם ובני עמון משמעתם
15 Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale oyo ekota na mabele ya Ejipito; loboko na Ye ekoningisa ebale mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo.
והחרים יהוה את לשון ים מצרים והניף ידו על הנהר בעים רוחו והכהו לשבעה נחלים והדריך בנעלים
16 Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye oyo batikalaki na bomoi wuta na Asiri ndenge esalemaki tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.
והיתה מסלה--לשאר עמו אשר ישאר מאשור כאשר היתה לישראל ביום עלתו מארץ מצרים

< Ezayi 11 >