< Ezayi 10 >

1 Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato!
Wehe den Schriftgelehrten, die unrechte Gesetze machen und die unrecht Urteil schreiben,
2 Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike.
auf daß sie die Sache der Armen beugen und Gewalt üben im Recht der Elenden unter meinem Volk, daß die Witwen ihr Raub und die Waisen ihre Beute sein müssen.
3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino? Esika nini bokobomba bomengo na bino?
Was wollt ihr tun am Tage der Heimsuchung und des Unglücks, das von ferne kommt? Zu wem wollt ihr fliehen um Hilfe, und wo wollt ihr eure Ehre lassen,
4 Eloko kaka bokotikala na yango: kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
daß sie nicht unter die Gefangenen gebeuget werde und unter die Erschlagenen falle? In dem allem läßt sein Zorn nicht ab, seine Hand ist noch ausgereckt.
5 Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai!
O wehe Assur, der meines Zorns Rute und ihre Hand meines Grimms Stecken ist!
6 Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.
Ich will ihn senden wider ein Heuchelvolk und ihm Befehl tun wider das Volk meines Zorns, daß er's beraube und austeile und zertrete es wie Kot auf der Gasse,
7 Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.
wiewohl er's nicht so meinet und sein Herz nicht so denket, sondern sein Herz stehet zu vertilgen und auszurotten nicht wenig Völker.
8 Azali koloba: « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso ndenge moko na bakonzi te?
Denn er spricht: Sind meine Fürsten nicht allzumal Könige?
9 Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te?
Ist Kalno nicht wie Karchemis? Ist Hamath nicht wie Arpad? Ist nicht Samaria wie Damaskus?
10 Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo oyo esambelaka banzambe ya bikeko, bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele koleka Yelusalemi mpe Samari,
Wie meine Hand funden hat die Königreiche der Götzen, so doch ihre Götzen stärker waren, denn die zu Jerusalem und Samaria sind:
11 nakokoka te penza kosala Yelusalemi elongo na banzambe na yango ya bikeko ndenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko? »
sollte ich nicht Jerusalem tun und ihren Götzen, wie ich Samaria und ihren Götzen getan habe?
12 Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba: « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
Wenn aber der HERR alle seine Werke ausgerichtet hat auf dem Berge Zion und zu Jerusalem, will ich heimsuchen die Frucht des hochmütigen Königs zu Assyrien und die Pracht seiner hoffärtigen Augen,
13 Pamba te azalaki koloba: ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.
darum daß er spricht: Ich habe es durch meiner Hände Kraft ausgerichtet und durch meine Weisheit, denn ich bin klug; ich habe die Länder anders geteilet und ihr Einkommen geraubt und wie ein Mächtiger die Einwohner zu Boden geworfen,
14 Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba: moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »
und meine Hand hat funden die Völker wie ein Vogelnest, daß ich habe alle Lande zusammengerafft, wie man Eier aufrafft, die verlassen sind, da niemand eine Feder regt oder den Schnabel aufsperret oder zischet.
15 Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango?
Mag sich auch eine Axt rühmen wider den, so damit hauet, oder eine Säge trotzen wider den, so sie zeucht, wie der rühmen kann, der den Stecken führet und hebt und führet ihn so leicht, als wäre er kein Holz?
16 Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto.
Darum wird der HERR HERR Zebaoth unter seine Fetten die Dürre senden, und seine HERRLIchkeit wird er anzünden, daß sie brennen wird wie ein Feuer.
17 Pole ya Isalaele ekokoma moto, Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto; kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa basende mpe banzube ya Asiri,
Und das Licht Israels wird ein Feuer sein, und sein Heiliger wird eine Flamme sein und wird seine Dornen und Hecken anzünden und verzehren auf einen Tag.
18 akozikisa nye bazamba na yango ya minene mpe bilanga na yango ya kitoko ndenge mobeli akondaka.
Und die HERRLIchkeit seines Waldes und seines Feldes soll zunichte werden von den Seelen bis aufs Fleisch und wird zergehen und verschwinden,
19 Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke oyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango.
daß die übrigen Bäume seines Waldes mögen gezählet werden und ein Knabe sie mag anschreiben.
20 Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
Zu der Zeit werden die Übrigen in Israel, und die errettet werden im Hause Jakob, sich nicht mehr verlassen auf den, der sie schlägt, sondern sie werden sich verlassen auf den HERRN, den Heiligen in Israel, in der Wahrheit.
21 Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya.
Die Übrigen werden sich bekehren, ja die übrigen in Jakob, zu Gott, dem Starken.
22 Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.
Denn ob dein Volk, o Israel, ist wie Sand am Meer, sollen doch die Übrigen desselben bekehret werden. Denn wenn dem Verderben gesteuert wird, so kommt die Gerechtigkeit überschwenglich.
23 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba.
Denn der HERR HERR Zebaoth wird ein Verderben gehen lassen und demselbigen doch steuern im ganzen Lande.
24 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, bozala na somo te ya bato ya Asiri oyo bazali kobeta bino fimbu mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala.
Darum spricht der HERR HERR Zebaoth: Fürchte dich nicht, mein Volk, das zu Zion wohnet, vor Assur! Er wird dich mit dem Stecken schlagen und seinen Stab wider dich aufheben, wie in Ägypten geschah.
25 Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. »
Denn es ist noch gar um ein kleines zu tun, so wird die Ungnade und mein Zorn über ihre Untugend ein Ende haben.
26 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.
Alsdann wird der HERR Zebaoth eine Geißel über ihn erwecken wie in der Schlacht Midians auf dem Fels Oreb und wird seinen Stab, den er am Meer brauchte, aufheben wie in Ägypten.
27 Na mokolo wana, bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino mpe na ekangiseli na bakingo na bino. Tango mokumba yango ekolongwa, ekotika esika na bomengo.
Zu der Zeit wird seine Last von deiner Schulter weichen müssen und sein Joch von deinem Halse; denn das Joch wird verfaulen vor der Fette.
28 Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.
Er kommt (laß gleich sein) gen Ajath; er zeucht durch Migron; er mustert seinen Zeug zu Michmas.
29 Baleki kati na bangomba mpe balobi: « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.
Sie ziehen vor unserm Lager Geba über; Rama erschrickt, Gibeath Sauls fleucht.
30 Oh bato ya Galimi, boganga makasi! Oh Layisi, sala keba! Oh engumba Anatoti, mawa na yo!
Du Tochter Gallim, schreie laut; merke auf, Laisa, du elendes Anathoth!
31 Bato ya Madimena bakimi, bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo;
Madmena weicht; die Bürger zu Gebim stärken sich.
32 Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi, bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko, mpe na ngomba moke ya Yelusalemi.
Man bleibt vielleicht einen Tag zu Nob; so wird er seine Hand regen wider den Berg der Tochter Zion und wider den Hügel Jerusalems.
33 Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokata bitape ya banzete na nguya monene, akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, akokomisa yango mikuse.
Aber siehe, der HERR HERR Zebaoth wird die Äste mit Macht verhauen, und was hoch aufgerichtet stehet, verkürzen, daß die Hohen geniedriget werden.
34 Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba: Libani ekokweya liboso ya Elombe.
Und der dicke Wald wird mit Eisen umgehauen werden, und Libanon wird fallen durch den Mächtigen.

< Ezayi 10 >