< Ezayi 1 >
1 Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.
Видение Исаии, сына Амосова, которое он видел о Иудее и Иерусалиме, во дни Озии, Иоафама, Ахаза, Езекии - царей Иудейских.
2 Oh Lola, yoka! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka! Pamba te Yawe nde azali koloba: « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.
Слушайте, небеса, и внимай, земля, потому что Господь говорит: Я воспитал и возвысил сыновей, а они возмутились против Меня.
3 Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »
Вол знает владетеля своего, и осел - ясли господина своего; а Израиль не знает Меня, народ Мой не разумеет.
4 Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.
Увы, народ грешный, народ обремененный беззакониями, племя злодеев, сыны погибельные! Оставили Господа, презрели Святаго Израилева, - повернулись назад.
5 Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.
Во что вас бить еще, продолжающие свое упорство? Вся голова в язвах, и все сердце исчахло.
6 Longwa na litambe kino na moto, eloko moko te ezali malamu, kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, batia kisi te mpe bapakola mafuta te.
От подошвы ноги до темени головы нет у него здорового места: язвы, пятна, гноящиеся раны, неочищенные и необвязанные и не смягченные елеем.
7 Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.
Земля ваша опустошена; города ваши сожжены огнем; поля ваши в ваших глазах съедают чужие; все опустело, как после разорения чужими.
8 Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko lokola mwa ndako moko ya matiti kati na elanga ya vino, lokola ndako ya kobombamela kati na bilanga ya bapasiteki, lokola engumba oyo ebatelami.
И осталась дщерь Сиона, как шатер в винограднике, как шалаш в огороде, как осажденный город.
9 Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.
Если бы Господь Саваоф не оставил нам небольшого остатка, то мы были бы то же, что Содом, уподобились бы Гоморре.
10 Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore!
Слушайте слово Господне, князья Содомские; внимай закону Бога нашего, народ Гоморрский!
11 « Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.
К чему Мне множество жертв ваших? говорит Господь. Я пресыщен всесожжениями овнов и туком откормленного скота, и крови тельцов и агнцев и козлов не хочу.
12 Tango boyaka liboso na Ngai, nani abengaka bino ete boya kokota na lopango na Ngai?
Когда вы приходите являться пред лице Мое, кто требует от вас, чтобы вы топтали дворы Мои?
13 Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino: bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.
Не носите больше даров тщетных: курение отвратительно для Меня; новомесячий и суббот, праздничных собраний не могу терпеть: беззаконие - и празднование!
14 Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango.
Новомесячия ваши и праздники ваши ненавидит душа Моя: они бремя для Меня; Мне тяжело нести их.
15 Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
И когда вы простираете руки ваши, Я закрываю от вас очи Мои; и когда вы умножаете моления ваши, Я не слышу: ваши руки полны крови.
16 Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai! Botika kosala mabe!
Омойтесь, очиститесь; удалите злые деяния ваши от очей Моих; перестаньте делать зло;
17 Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!
научитесь делать добро, ищите правды, спасайте угнетенного, защищайте сироту, вступайтесь за вдову.
18 Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.
Тогда придите - и рассудим, говорит Господь. Если будут грехи ваши, как багряное, - как снег убелю; если будут красны, как пурпур, - как волну убелю.
19 Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.
Если захотите и послушаетесь, то будете вкушать блага земли;
20 Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga. » Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.
если же отречетесь и будете упорствовать, то меч пожрет вас: ибо уста Господни говорят.
21 Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.
Как сделалась блудницею верная столица, исполненная правосудия! Правда обитала в ней, а теперь - убийцы.
22 Palata na yo ekomi bosoto, vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi.
Серебро твое стало изгарью, вино твое испорчено водою;
23 Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.
князья твои - законопреступники и сообщники воров; все они любят подарки и гоняются за мздою; не защищают сироты, и дело вдовы не доходит до них.
24 Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi: Ah, mawa! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai!
Посему говорит Господь, Господь Саваоф, Сильный Израилев: о, удовлетворю Я Себя над противниками Моими и отмщу врагам Моим!
25 Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,
И обращу на тебя руку Мою и, как в щелочи, очищу с тебя примесь, и отделю от тебя все свинцовое;
26 nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.
и опять буду поставлять тебе судей, как прежде, и советников, как вначале; тогда будут говорить о тебе: “город правды, столица верная”.
27 Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo.
Сион спасется правосудием, и обратившиеся сыны его - правдою;
28 Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, bato oyo bakobosana Yawe bakosila.
всем же отступникам и грешникам погибель, и оставившие Господа истребятся.
29 « Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente oyo bozalaki kolinga mingi; bokoyoka pasi na mitema mpo na bilanga oyo boponaki;
Они будут постыжены за дубравы, которые столь вожделенны для вас, и посрамлены за сады, которые вы избрали себе;
30 bokokoma lokola nzete ya terebente oyo ekawuka makasa.
ибо вы будете, как дуб, которого лист опал, и как сад, в котором нет воды.
31 Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu, mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali; bango mibale bakozika nzela moko na moto, mpe moto oyo koboma yango akozala te. »
И сильный будет отрепьем, и дело его искрою; и будут гореть вместе, - и никто не потушит.