< Oze 7 >
1 Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
Quand je veux opérer la guérison d’Israël, il arrive que se dévoilent l’iniquité d’Ephraïm et les méfaits de Samarie, car ils pratiquent le mensonge, des voleurs font irruption, des bandes de pillards se répandent au dehors.
2 Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
Ils ne se disent pas dans le secret de leur cœur que je garde le souvenir de toute leur perversité; or, leurs actions les enserrent, elles sont là devant ma face.
3 Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.
Par leur perversité, ils font plaisir au roi, par leurs tromperies aux princes.
4 Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
Ils sont tous débauchés, ardents comme un four allumé par le boulanger, qui s’abstient d’attiser le feu depuis le moment où la pâte est pétrie jusqu’à ce qu’elle soit levée.
5 Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso, bakambi balangwaka masanga mpe mokonzi asanganaka na batioli.
"C’Est le jour de fête de notre roi!" Les princes s’y rendent malades par la chaleur du vin: on tend la main aux railleurs.
6 Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
Oui, dans leurs machinations, ils rendent leur cœur semblable à un four qui, même si le boulanger dort toute la nuit, est brûlant au matin comme un feu qui flambe.
7 Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.
Tous ils sont échauffés comme le four, et ils consument leurs juges; tous leurs rois sont renversés, sans que personne parmi eux s’adresse à moi.
8 Efrayimi asangani na bikolo mosusu, akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
Ephraïm se confond parmi les nations, Ephraïm est un gâteau qui n’a pas été retourné.
9 Bapaya bazali kosilisa ye makasi, kasi ye azali kososola yango te. Azali kokoma mobange, kasi azali kososola yango te.
Des étrangers dévorent sa force, sans qu’il s’en aperçoive, la décrépitude l’a atteint sans qu’il s’en doute.
10 Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba: azongeli te Yawe, Nzambe na ye; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te!
L’Orgueil d’Israël est humilié en sa présence; cependant ils ne sont pas revenus à l’Eternel, leur Dieu, et, en dépit de tout, ils ne l’ont pas recherché.
11 Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele: azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.
Ephraïm est devenu comme un pigeon étourdi, sans intelligence; ils en appellent à l’Egypte, ils se rendent en Assyrie.
12 Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
Tandis qu’ils prennent ce chemin, je tendrai mon filet sur eux et les y ferai tomber comme des oiseaux du ciel, je les châtierai à l’annonce de leur rassemblement.
13 Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo!
Malheur à eux, car ils ont erré loin de moi! Ruine sur eux, car ils me sont devenus infidèles! Est-ce à moi de les délivrer, alors qu’ils profèrent des mensonges contre moi?
14 Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
Ils ne m’invoquent pas de tout cœur quand ils se lamentent sur leur couche: sont-ils alarmés au sujet du froment et du vin, alors ils s’approchent de moi?
15 Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
Cependant moi, en les redressant, je fortifiais leurs bras, mais ils ont conçu de mauvaises pensées à mon égard.
16 Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.
S’Ils retournent, ce n’est pas pour s’élever vers Dieu, ils sont tels qu’un arc trompeur. Leurs princes tomberont sous le glaive à cause de leur langue virulente. Voilà ce qui fait d’eux une risée dans le pays d’Egypte.