< Oze 6 >

1 Boya, tozonga epai na Yawe! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.
Chodźcie i zawróćmy do PANA, bo on [nas] poszarpał i on nas uzdrowi; uderzył, a opatrzy nasze [rany].
2 Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
Ożywi nas po dwóch dniach, a trzeciego dnia wzbudzi nas i będziemy żyć przed jego obliczem.
3 Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana: akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.
Wtedy poznamy i będziemy się starać poznać PANA. Jego wyjście bowiem jest przygotowane jak zorza poranna, przyjdzie do nas jak deszcz wiosenny i jesienny, który nawadnia ziemię.
4 Efrayimi, nasala yo lisusu nini? Yuda, nasala yo lisusu nini? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
Cóż mam ci uczynić, Efraimie? Cóż mam ci uczynić, Judo? Wasza dobroć bowiem jest jak obłok poranny, jak rosa, [która] rano znika.
5 Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
Dlatego ciosałem [ich] przez proroków, zabijałem ich słowami moich ust, aby wyszła światłość twoich sądów.
6 Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
Pragnę bowiem miłosierdzia, a nie ofiary, i poznania Boga bardziej niż całopalenia.
7 Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.
Ale oni zerwali [moje] przymierze jako ludzkie, w tym mi się sprzeniewierzyli.
8 Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila.
Gilead jest miastem czyniących nieprawość, splamionym krwią.
9 Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka: babomaka bato na nzela ya Sishemi; ezali likambo ya somo penza!
A jak zbójcy czyhają na człowieka, [tak czyni] zgraja kapłanów na drodze do Sychem, bo popełniają czyny wstydliwe.
10 Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi: Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.
Widziałem w domu Izraela rzeczy okropne: tam jest nierząd Efraima, a Izrael się splugawił.
11 Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.
I dla ciebie, Judo, wyznaczył żniwo, gdy odwróciłem niewolę mojego ludu.

< Oze 6 >