< Oze 5 >

1 Bino Banganga-Nzambe, boyoka! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.
שמעו זאת הכהנים והקשיבו בית ישראל ובית המלך האזינו--כי לכם המשפט כי פח הייתם למצפה ורשת פרושה על תבור
2 Batomboki batimolaki libulu ya mozindo; mpe Ngai nakopesa bango nyonso etumbu.
ושחטה שטים העמיקו ואני מוסר לכלם
3 Nayebi Efrayimi malamu penza; mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai. Efrayimi, awa omipesaki na kindumba, Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.
אני ידעתי אפרים וישראל לא נכחד ממני כי עתה הזנית אפרים נטמא ישראל
4 Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
לא יתנו מעלליהם לשוב אל אלהיהם כי רוח זנונים בקרבם ואת יהוה לא ידעו
5 Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.
וענה גאון ישראל בפניו וישראל ואפרים יכשלו בעונם--כשל גם יהודה עמם
6 Tango bakokende koluka Yawe, elongo na bangombe mpe bameme na bango, bakomona Ye te, pamba te akabwanaki na bango.
בצאנם ובבקרם ילכו לבקש את יהוה--ולא ימצאו חלץ מהם
7 Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.
ביהוה בגדו כי בנים זרים ילדו עתה יאכלם חדש את חלקיהם
8 Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni! Oh Benjame, keba!
תקעו שופר בגבעה חצצרה ברמה הריעו בית און אחריך בנימין
9 Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.
אפרים לשמה תהיה ביום תוכחה בשבטי ישראל הודעתי נאמנה
10 Bakambi ya Yuda bazali lokola bato oyo bapusaka bandelo. Nakopelisela bango kanda na Ngai lokola mpela.
היו שרי יהודה כמסיגי גבול עליהם אשפוך כמים עברתי
11 Efrayimi azali konyokwama, anyatami na etumbu, pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.
עשוק אפרים רצוץ משפט כי הואיל הלך אחרי צו
12 Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi, lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.
ואני כעש לאפרים וכרקב לבית יהודה
13 Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
וירא אפרים את חליו ויהודה את מזרו וילך אפרים אל אשור וישלח אל מלך ירב והוא לא יוכל לרפא לכם ולא יגהה מכם מזור
14 Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.
כי אנכי כשחל לאפרים וככפיר לבית יהודה אני אני אטרף ואלך אשא ואין מציל
15 Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.
אלך אשובה אל מקומי עד אשר יאשמו ובקשו פני בצר להם ישחרנני

< Oze 5 >