< Oze 4 >

1 Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili;
イスラエルの子輩よヱホバの言を聽けヱホバこの地に住る者と爭辨たまふ其は此地には誠實なく愛情なく神を知る事なければなり
2 etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.
ただ詛偽凶殺盗姦淫のみにして互に相襲ひ血血につづき流る
3 Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.
このゆゑにその地うれひにしづみ之にすむものはみな野のけもの空のとりとともにおとろへ海の魚もまた絶はてん
4 Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe!
されど何人もあらそふべからずいましむ可らず汝の民は祭司と爭ふ者の如くなれり
5 Bokobeta mabaku, na moyi makasi; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.
汝は晝つまづき汝と偕なる預言者は夜つまづかん我なんぢの母を亡すべし
6 Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
わが民は知識なきによりて亡さるなんぢ知識を棄つるによりて我もまた汝を棄ててわが祭司たらしめじ汝おのが神の律法を忘るるによりて我もなんぢの子等を忘れん
7 Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.
彼らは大なるにしたがひてますます我に罪を犯せば我かれらの榮を辱に變ん
8 Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.
彼らはわが民の罪をくらひ心をかたむけてその罪ををかすを願へり
9 Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe: nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.
このゆゑに民の遇ふところは祭司もまた同じわれその途をかれらにきたらせその行爲をもて之にむくゆべし
10 Bakolia, kasi bakotonda te; bakosala kindumba, kasi bakobotana te; pamba te basundolaki Yawe
かれらは食へども飽ず淫行をなせどもその數まさずその心をヱホバにとむることを止ればなり
11 mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.
淫行と酒と新しき酒はその人の心をうばふ
12 Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
わが民木にむかひて事をとふその杖かれらに事をしめす是かれら淫行の霊にまよはされその神の下を離れて淫行を爲すなり
13 kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
彼らは山々の巓にて犠牲を献げ岡の上にて香を焚き橡樹 楊樹 栗樹の下にてこの事をおこなふ此はその樹蔭の美しきによりてなりここをもてなんぢらの女子は淫行をなしなんぢらの兒婦は姦淫をおこなふ
14 Nakopesa etumbu te: ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi!
我なんぢらのむすめ淫行をなせども罰せずなんぢらの兒婦かんいんをおこなへども刑せじ其はなんぢらもみづから離れゆきて妓女とともに居り淫婦とともに献物をそなふればなり悟らざる民はほろぶべし
15 Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba: « Na Kombo na Yawe! »
イスラエルよ汝淫行をなすともユダに罪を犯さする勿れギルガルに往なかれベテアベンに上るなかれヱホバは活くと曰て誓ふなかれ
16 Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki, ndenge nini Yawe akoka koleisa bango lokola bana meme kati na bilanga minene?
イスラエルは頑強なる牛のごとくに頑強なり今ヱホバ恙羊をひろき野にはなてるが如くして之を牧はん
17 Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko: tika ye akoba bongo!
エフライムは偶像にむすびつらなれりその爲にまかせよ
18 Soki kaka asilisaka komela vino, amipesaka na kindumba; bakambi na yango balingaka makambo oyo eyokisaka bango soni.
かれらの酒はくされかれらの淫行はやまずかれらの楯となるべき者等は恥を愛しいたく之を愛せり
19 Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.
かれは風の翼につつまれかれらはその禮物によりて恥辱をかうむらん

< Oze 4 >