< Oze 3 >

1 Yawe alobaki na ngai: — Kende, linga mwasi mosusu oyo azali mwasi ya mobali mosusu to mpe azali mwasi ya ekobo. Linga ye ndenge Yawe alingaka bana ya Isalaele, ata soki basambelaka banzambe mosusu mpe baliaka bagato basala na bambuma ya vino ebulisama!
Ubangiji ya ce mini, “Ka tafi, ka sāke nuna wa matarka ƙauna, ko da yake wani yana son ta, ita kuma mazinaciya ce. Ka ƙaunace ta yadda Ubangiji yake ƙaunar Isra’ilawa, ko da yake sun juya ga waɗansu alloli suna kuma ƙauna wainar zabibi mai tsarki.”
2 Boye, nasombaki ye na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, zomi na mitano, mpe na motuya ya bakilo ya orje, nkama minei na tuku mitano.
Ta haka na saye ta da shekel goma sha biyar na azurfa da kuma wajen buhu na sha’ir.
3 Bongo nalobaki na ye: — Wumela na ngai tango molayi; okosala kindumba te mpe okomipesa na mobali mosusu te, ngai mpe nakosala kaka bongo epai na yo.
Sai na faɗa mata, “Za ki zauna tare da ni kwanaki masu yawa; kada ki yi karuwanci ko ki yi abuta da wani namiji, ni kuwa zan zauna tare da ke.”
4 Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.
Gama Isra’ilawa za su yi kwanaki masu yawa ba tare da sarki ko shugaba ba, babu hadaya ko keɓaɓɓun duwatsu, babu efod ko gunki.
5 Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Daga baya Isra’ilawa za su dawo su nemi Ubangiji Allahnsu da kuma Dawuda sarkinsu. Za su je da rawan jiki wajen Ubangiji da kuma ga albarkunsa a kwanakin ƙarshe.

< Oze 3 >