< Oze 2 >
1 — Loba na bandeko na yo ya mibali: « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi: « Bozali balingami na ngai. »
汝らの兄弟に向ひてはアンミ(わが民)と言ひ汝らの姉財にむかひてはルハマ(憐まるる者)と言へ
2 Bopamela mama na bino, bopamela ye; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.
なんぢらの母とあげつらへ論辨ふことをせよ彼はわが妻にあらず我はかれの夫にあらざるなりなんぢら斯してかれにその面より淫行を除かせその乳房の間より姦淫をのぞかしめよ
3 Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka; mpe akokufa na posa ya mayi.
然らざれば我かれを剥て赤體にしその生れいでたる日のごとくにしまた荒野のごとくならしめ潤ひなき地のごとくならしめ渇によりて死しめん
4 Nakolinga bana na ye te, pamba te bazali bana oyo babotami na nzela ya kindumba.
我その子等を憐まじ淫行の子等なればなり
5 Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki: « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »
かれらの母は淫行をなせりかれらを生る者は恥べき事をおこなへり蓋かれいへる言あり我はわが戀人等につきしたがはん彼らはわがパンわが水わが羊毛わが麻わが油わが飮物などを我に與ふるなりと
6 Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.
この故にわれ荊棘をもてなんぢの路をふさぎ垣をたてて彼にその徑をえざらしむべし
7 Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba: « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo! »
彼はその戀人たちの後をしたひゆけども追及ことなく之をたづぬれども遇ことなし是において彼いはん我ゆきてわが前の夫にかへるべしかのときのわが状態は今にまさりて善りきと
8 Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.
彼が得る穀物と酒と油はわが與ふるところ彼がバアルのために用ゐたる金銀はわが彼に増あたへたるところなるを彼はしらざるなり
9 Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.
これによりて我わが穀物をその時におよびて奪ひわが酒をその季にいたりてうばひ又かれの裸體をおほふに用ゆべきわが羊毛およびわが麻をとらん
10 Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.
今われかれの恥るところをその戀人等の目のまへに露すべし彼をわが手より救ふものあらじ
11 Nakosukisa bisengo na ye nyonso: bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.
我かれがすべての喜樂すなはち祝筵新月のいはひ安息日およびこの節會をして息しめん
12 Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango: « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.
また彼の葡萄の樹と無花果樹をそこなはん彼さきに此等をさしてわが戀人の我にあたへし賞賜なりと言しがわれこれを林となし野の厭をしてくらはしめん
13 Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
われかれが耳環頚玉などを掛てその戀人らをしたひゆき我をわすれ香をたきて事へしもろもろのバアルの日のゆゑをもてその罪を罰せんヱホバかく言たまふ
14 Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.
斯るがゆゑに我かれを誘ひて荒野にみちびきいり終にかれの心をなぐさめ
15 Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.
かしこを出るや直ちにわれかれにその葡萄園を與へアコル(艱難)の谷を望の門となしてあたへん彼はわかかりし時のごとくエジプトの國より上りきたりし時のごとくかしこにて歌うたはん
16 Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai: « Mobali na ngai ya libala; » okobenga ngai lisusu te: « Nkolo na ngai. »
ヱホバ言たまふその日にはなんぢ我をふたたびバアリとよばずしてイシ(吾夫)とよばん
17 Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala; bakobelela lisusu bakombo na yango te.
我もろもろのバアルの名をかれが口よりとりのぞき重ねてその名を世に記憶せらるること無らしめん
18 Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba: nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
その日には我かれら(我民)のために野の獣そらの鳥および地の昆蟲と誓約をむすびまた弓箭ををり戦争を全世界よりのぞき彼らをして安らかに居しむべし
19 Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.
われ汝をめとりて永遠にいたらん公義と公平と寵愛と憐憫とをもてなんぢを娶り
20 Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.
かはることなき眞実をもて汝をめとるべし汝ヱホバをしらん
21 Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.
ヱホバいひ給ふその日われ應へん我は天にこたへ天は地にこたへ
22 Mabele ekoyanola ble, vino ya sika mpe mafuta. Bongo, yango nyonso ekoyanola Jizireyeli.
地は穀物と洒と油とに應へまた是等のものはヱズレルに應へん
23 Nakolona ye mpo na Ngai moko kati na mokili mpo ete azala lokola nzete ya elanga na Ngai; nakotalisa bolingo na Ngai epai na ye oyo nazalaki kobenga Lo-Rukama. Nakoloba na bato oyo nazalaki kobenga Lo-Ami: « Bozali bato na Ngai, » mpe bango bakoloba: « Ozali Nzambe na biso. »
我わがためにかれを地にまき憐まれざりし者をあはれみわが民ならざりし者にむかて汝はわが民なりといはんかれらは我にむかひて汝はわが神なりといはん