< Oze 14 >

1 Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.
Return, O Israel, to the Lord thy God: for thou hast fallen down by thy iniquity.
2 Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe; boloba na Ye: « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.
Take with you words, and return to the Lord, and say to him: Take away all iniquity, and receive the good: and we will render the calves of our lips.
3 Asiri akokoka kobikisa biso te; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso: ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
Assyria shall not save us, we will not ride upon horses, neither will we say any more: The works of our hands are our gods, for thou wilt have mercy on the fatherless that is in thee.
4 Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.
I will heal their breaches, I will love them freely: for my wrath is turned away from them.
5 Nakozala lokola londende mpo na Isalaele; akobimisa fololo lokola lisi, akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.
I will be as the dew, Israel shall spring as the lily, and his root shall shoot forth as that of Libanus.
6 Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani.
His branches shall spread, and his glory shall be as the olive tree: and his smell as that of Libanus.
7 Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.
They shall be converted that sit under his shadow: they shall live upon wheat, and they shall blossom as a vine: his memorial shall be as the wine of Libanus.
8 Efrayimi akoloba: « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
Ephraim shall say, What have I to do any more with idols? I will hear him, and I will make him flourish like a green fir tree: from me is thy fruit found.
9 Nani azali na bwanya mpo na kososola makambo oyo? Nani azali na mayele mingi mpo na koyeba yango? Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima: bato ya sembo bakolanda yango, kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.
Who is wise, and he shall understand these things? prudent, and he shall know these things? for the ways of the Lord are right, and the just shall walk in them: but the transgressors shall fall in them.

< Oze 14 >