< Oze 13 >

1 Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala; yango wana akufaki.
כדבר אפרים רתת נשא הוא בישראל ויאשם בבעל וימת
2 Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu: nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango: « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »
ועתה יוספו לחטא ויעשו להם מסכה מכספם כתבונם עצבים מעשה חרשים כלה להם הם אמרים זבחי אדם עגלים ישקון
3 Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.
לכן יהיו כענן בקר וכטל משכים הלך כמץ יסער מגרן וכעשן מארבה
4 « Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito. Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai, ozali na mobikisi mosusu te.
ואנכי יהוה אלהיך מארץ מצרים ואלהים זולתי לא תדע ומושיע אין בלתי
5 Ngai, nayebaki yo kati na esobe, kati na mabele oyo ekawuka.
אני ידעתיך במדבר--בארץ תלאבות
6 Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.
כמרעיתם וישבעו--שבעו וירם לבם על כן שכחוני
7 Boye, nakokweyela bino lokola nkosi mpe nakozela bino na nzela lokola nkoyi.
ואהי להם כמו שחל--כנמר על דרך אשור
8 Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.
אפגשם כדב שכול ואקרע סגור לבם ואכלם שם כלביא חית השדה תבקעם
9 Isalaele, obebisami; pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo!
שחתך ישראל כי בי בעזרך
10 Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba: ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli? ›
אהי מלכך אפוא ויושיעך בכל עריך ושפטיך--אשר אמרת תנה לי מלך ושרים
11 Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.
אתן לך מלך באפי ואקח בעברתי
12 Mabe ya Efrayimi ebombami, mpe masumu na ye ekomami penza.
צרור עון אפרים צפונה חטאתו
13 Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.
חבלי יולדה יבאו לו הוא בן לא חכם כי עת לא יעמד במשבר בנים
14 Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa? Nakoyokela bango mawa te! (Sheol h7585)
מיד שאול אפדם ממות אגאלם אהי דבריך מות אהי קטבך שאול--נחם יסתר מעיני (Sheol h7585)
15 Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe: ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »
כי הוא בין אחים יפריא יבוא קדים רוח יהוה ממדבר עלה ויבוש מקורו ויחרב מעינו--הוא ישסה אוצר כל כלי חמדה
16 Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
תאשם שמרון כי מרתה באלהיה בחרב יפלו--עלליהם ירטשו והריותיו יבקעו

< Oze 13 >