< Oze 12 >

1 Efrayimi aliaka mopepe; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
Efra'im higer efter vind, han jager efter østenvær; hele dagen dynger han op løgn og ødeleggelse; de inngår pakt med Assur, de fører olje til Egypten.
2 Yawe alingi kosamba na Yuda; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.
Herren har trette med Juda, og han skal hjemsøke Jakob for hans ferds skyld, betale ham efter hans gjerninger.
3 Na libumu ya mama na bango, akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe; tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.
I mors liv holdt han sin bror i hælen, og i sin manndomskraft kjempet han med Gud.
4 Abundaki na anjelu mpe alongaki, alelaki mpe asengaki ngolu na ye. Jakobi akutanaki na ye na Beteli, mpe ezali kuna nde asololaki na ye.
Han kjempet med engelen og vant; han gråt og bad ham om nåde; i Betel møtte han ham, og der talte han med oss.
5 Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.
Og Herren, hærskarenes Gud - Herren er det navn han skal kalles med.
6 Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
Og du - til din Gud skal du vende om; hold fast ved miskunnhet og rett, og bi stadig på din Gud!
7 Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.
I Kana'ans hånd er det falsk vekt; å gjøre urett er hans lyst.
8 Efrayimi alobaka na lolendo nyonso: « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
Og Efra'im sier: Ja, jeg er blitt rik, har vunnet mig gods; men i alt mitt strev skal ingen kunne finne nogen urett - nogen synd.
9 Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
Men jeg er Herren din Gud fra Egyptens land; jeg vil ennu la dig bo i telt likesom i høitidsdagene.
10 Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.
Jeg har talt til profetene, og jeg har latt dem se syner i mengde, og gjennem profetene har jeg talt i lignelser.
11 Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.
Er Gilead fullt av misgjerninger, så skal de også bli rent til intet; har de ofret okser i Gilgal, så skal og deres altere bli som stenrøser langsmed markens furer.
12 Jakobi akimaki na mokili ya Siri; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.
Jakob flyktet til Arams land, Israel tjente for å vinne en hustru - for å vinne en hustru voktet han får.
13 Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.
Men ved en profet førte Herren Israel op fra Egypten, og ved en profet voktet han det.
14 Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi, yango wana, Nkolo na ye akotangela ye ngambo ya makila oyo asopaki mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.
Efra'im har vakt bitter harme; derfor skal hans Herre la hans blodskyld komme over ham, og hans hån skal han gjengjelde ham.

< Oze 12 >