< Oze 1 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele:
This is the word of the LORD that came to Hosea son of Beeri in the days of Uzziah, Jotham, Ahaz, and Hezekiah, kings of Judah, and of Jeroboam son of Jehoash, king of Israel.
2 Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye: — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.
When the LORD first spoke through Hosea, He told him, “Go, take a prostitute as your wife and have children of adultery, because this land is flagrantly prostituting itself by departing from the LORD.”
3 Boye, Oze akendeki kolinga Gomeri, mwana mwasi ya Dibilayimi. Gomeri akomaki na zemi mpe abotelaki ye mwana mobali.
So Hosea went and married Gomer daughter of Diblaim, and she conceived and bore him a son.
4 Yawe alobaki na ye: — Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele.
Then the LORD said to Hosea, “Name him Jezreel, for soon I will bring the bloodshed of Jezreel upon the house of Jehu, and I will put an end to the kingdom of Israel.
5 Na mokolo wana, nakobuka tolotolo ya Isalaele kati na lubwaku ya Jizireyeli.
And on that day I will break the bow of Israel in the Valley of Jezreel.”
6 Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze: — Pesa ye kombo Lo-Rukama, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te.
Gomer again conceived and gave birth to a daughter, and the LORD said to Hosea, “Name her Lo-ruhamah, for I will no longer have compassion on the house of Israel, that I should ever forgive them.
7 Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.
Yet I will have compassion on the house of Judah, and I will save them—not by bow or sword or war, not by horses and cavalry, but by the LORD their God.”
8 Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali.
After she had weaned Lo-ruhamah, Gomer conceived and gave birth to a son.
9 Yawe alobaki: — Pesa ye kombo Lo-Ami, pamba te bozali bato na Ngai te, mpe Ngai nazali Nzambe na bino te.
And the LORD said, “Name him Lo-ammi, for you are not My people, and I am not your God.
10 Nzokande, bana ya Isalaele bakozala ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo bakoki komeka to kotanga te; kaka na esika oyo balobaki na bango: « Bozali bato na ngai te, » bakokoma kobenga bango « bana na Nzambe na bomoi. »
Yet the number of the Israelites will be like the sand of the sea, which cannot be measured or counted. And it will happen that in the very place where it was said to them, ‘You are not My people,’ they will be called ‘sons of the living God.’
11 Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.
Then the people of Judah and of Israel will be gathered together, and they will appoint for themselves one leader, and will go up out of the land. For great will be the day of Jezreel.