< Ba-Ebre 1 >
1 Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.
Kui Jumal muiste rääkis esivanematele mitmel korral ja mitmel viisil prohvetite kaudu,
2 Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili. (aiōn )
siis on Jumal viimseil päevil meile rääkinud Poja kaudu, kelle ta on seadnud kõigi asjade pärijaks ja kelle läbi ta on ka maailmad loonud. (aiōn )
3 Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Poeg on Jumala kirkuse kiirgus ja tema olemuse täpne peegeldus ning ta hoiab ülal kõiksust oma võimsa sõnaga. Kes on pärast seda, kui ta oli puhastanud meid pattudest, istunud Ausuuruse paremale käele kõrgustes
4 mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.
ning saanud ülemaks inglitest, kuivõrd ta on pärinud neist ülevama nime.
5 Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba: « Ozali mwana na ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo? » To mpe: « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai? »
Millisele inglile on Jumal iganes öelnud „Sina oled minu Poeg, täna ma sünnitasin sinu“? Ja veel: „Mina olen tema Isa ja tema on minu Poeg.“
6 Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba: « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo? »
Ning kui ta toob oma esmasündinu maailma, ütleb ta: „Teda kummardagu kõik Jumala inglid.“
7 Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu: « Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe, mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »
Inglite kohta ta ütleb: „Ta teeb oma inglid vaimudeks, ja oma teenijad tuleleegiks.“
8 Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana: « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo. (aiōn )
Aga Poja kohta ta ütleb: „Sinu troon, Jumal, püsib ikka ja igavesti, ja õiglus on su Kuningriigi valitsuskepp. (aiōn )
9 Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo! »
Sa armastad õigust ja vihkad ülekohut, seepärast on su Jumal võidnud sind rõõmuõliga rohkem kui su kaaslasi.“
10 Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu: « Na ebandeli, oh Nkolo, Yo nde otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo nde esalaki Likolo.
Ja veel: „Sina, Issand, panid alguses maale aluse ja taevad on su kätetöö.
11 Nyonso wana ekobeba, ekonzuluka lokola elamba; kasi Yo, okotikala seko na seko.
Need hävivad, aga sina jääd; nad kõik kuluvad nagu riie.
12 Okolinga yango lokola kazaka, mpe bakolongola yango lokola elamba mpo na kotia elamba mosusu. Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te! »
Sa keerad nad kokku otsekui kuue – nad vahetatakse välja nagu rõivad. Ent sina oled ikka seesama ja sinu aastad ei lõpe.“
13 Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo? »
Või millisele inglile on Jumal iganes öelnud: „Istu mu paremale käele, kuni ma panen sinu vaenlased su jalajäriks“?
14 Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.
Eks kõik inglid ole teenijad vaimud, saadetud teenima neid, kes pärivad pääste?