< Ba-Ebre 1 >

1 Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.
ⲁ̅ϩⲛ ϩⲁϩ ⲙⲙⲉⲣⲟⲥ ⲁⲩⲱ ϩⲛ ϩⲁϩ ⲛⲥⲙⲟⲧ ⲉⲁ ⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ϣⲁϫⲉ ⲙⲛ ⲛⲉⲛⲉⲓⲟⲧⲉ ⲛϣⲟⲣⲡ ϩⲛ ⲛⲉⲡⲣⲟⲫⲏⲧⲏⲥ
2 Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili. (aiōn g165)
ⲃ̅ϩⲛ ⲑⲁⲏ ⲛⲛⲉⲓϩⲟⲟⲩ ⲁϥϣⲁϫⲉ ⲛⲙⲙⲁⲛ ϩⲙ ⲡϣⲏⲣⲉ ⲡⲁⲓ ⲉⲛⲧⲁϥⲕⲁⲁϥ ⲛⲕⲗⲏⲣⲟⲛⲟⲙⲟⲥ ⲙⲡⲧⲏⲣϥ ⲡⲁⲓ ⲉⲛⲧⲁϥⲧⲁⲙⲓⲉ ⲛⲁⲓⲱⲛ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓ ⲧⲟⲟⲧϥ (aiōn g165)
3 Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
ⲅ̅ⲉⲧⲉ ⲡⲁⲓ ⲡⲉ ⲡⲟⲩⲟⲉⲓⲛ ⲙⲡⲉⲟⲟⲩ ⲁⲩⲱ ⲡⲉⲓⲛⲉ ⲙⲡⲉϥⲧⲁϫⲣⲟ ⲉϥϥⲓ ϩⲁ ⲡⲧⲏⲣϥ ϩⲙ ⲡϣⲁϫⲉ ⲛⲧⲉϥϭⲟⲙ ⲉⲁϥⲉⲓⲣⲉ ⲙⲡⲧⲃⲃⲟ ⲛⲛⲉⲛⲛⲟⲃⲉ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓ ⲧⲟⲟⲧϥ ⲁϥϩⲙⲟⲟⲥ ϩⲓⲧⲟⲩⲛⲁⲙ ⲛⲧⲙⲛⲧⲛⲟϭ ϩⲛ ⲛⲉⲧϫⲟⲥⲉ
4 mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.
ⲇ̅ⲛⲑⲉ ⲉⲧϥⲥⲟⲧⲡ ⲉⲛⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲧⲁⲓ ⲟⲛ ⲧⲉ ⲑⲉ ⲉⲛⲧⲁϥⲕⲗⲏⲣⲟⲛⲟⲙⲓ ⲛⲟⲩⲣⲁⲛ ⲉϥϣⲟⲃⲉ ⲉⲣⲟⲟⲩ
5 Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba: « Ozali mwana na ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo? » To mpe: « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai? »
ⲉ̅ⲛⲧⲁϥϫⲟⲟⲥ ⲅⲁⲣ ⲛⲛⲓⲙ ⲛⲛⲉϥⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲉⲛⲉϩ ϫⲉ ⲛⲧⲟⲕ ⲡⲉ ⲡⲁϣⲏⲣⲉ ⲁⲛⲟⲕ ⲁⲓϫⲡⲟⲕ ⲙⲡⲟⲟⲩ ⲁⲩⲱ ⲟⲛ ϫⲉ ⲁⲛⲟⲕ ϯⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲛⲁϥ ⲉⲩⲉⲓⲱⲧ ⲛⲧⲟϥ ⲇⲉ ϥⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲛⲁⲓ ⲉⲩϣⲏⲣⲉ
6 Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba: « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo? »
ⲋ̅ⲉϥϣⲁⲛⲉⲓⲛⲉ ⲇⲉ ⲟⲛ ⲙⲡϣⲣⲡ ⲙⲙⲓⲥⲉ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲧⲟⲓⲕⲟⲩⲙⲉⲛⲏ ϣⲁϥϫⲟⲟⲥ ϫⲉ ⲙⲁⲣⲟⲩⲟⲩⲱϣⲧ ⲛⲁϥ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲛϭⲓ ⲛⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ
7 Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu: « Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe, mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »
ⲍ̅ϣⲁϥϫⲟⲟⲥ ⲙⲉⲛ ⲛⲛⲁϩⲣⲛ ⲛⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ϫⲉ ⲡⲉⲧⲧⲁⲙⲓⲟ ⲛⲛⲉϥⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲙⲡⲛⲁ ⲛⲉϥⲗⲓⲧⲟⲩⲣⲅⲟⲥ ⲛϣⲁϩ ⲛⲥⲁⲧⲉ
8 Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana: « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo. (aiōn g165)
ⲏ̅ⲛⲛⲁϩⲣⲙ ⲡϣⲏⲣⲉ ⲇⲉ ϫⲉ ⲡⲉⲕⲑⲣⲟⲛⲟⲥ ⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ϣⲟⲟⲡ ϣⲁ ⲉⲛⲉϩ ⲛⲧⲉ ⲡⲓⲉⲛⲉϩ ⲁⲩⲱ ⲡϭⲉⲣⲱⲃ ⲙⲡⲥⲟⲟⲩⲧⲛ ⲡⲉ ⲡϭⲉⲣⲱⲃ ⲛⲧⲉⲕⲙⲛⲧⲣⲣⲟ (aiōn g165)
9 Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo! »
ⲑ̅ⲁⲕⲙⲉⲣⲉ ⲧⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ ⲁⲕⲙⲉⲥⲧⲉ ⲡϫⲓ ⲛϭⲟⲛⲥ ⲉⲧⲃⲉ ⲡⲁⲓ ⲁϥⲧⲁϩⲥⲕ ⲛϭⲓ ⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲡⲉⲕⲛⲟⲩⲧⲉ ⲛⲟⲩⲛⲉϩ ⲛⲧⲉⲗⲏⲗ ⲡⲁⲣⲁ ⲛⲉⲑⲓⲧⲟⲩⲱⲕ
10 Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu: « Na ebandeli, oh Nkolo, Yo nde otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo nde esalaki Likolo.
ⲓ̅ⲁⲩⲱ ϫⲉ ⲛⲧⲟⲕ ϫⲓⲛ ⲛϣⲟⲣⲡ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲁⲕⲥⲙⲛⲥⲛⲧⲉ ⲙⲡⲕⲁϩ ⲛⲉϩⲃⲏⲩⲉ ⲙⲛⲉⲕϭⲓϫ ⲛⲉ ⲙⲡⲏⲩⲉ
11 Nyonso wana ekobeba, ekonzuluka lokola elamba; kasi Yo, okotikala seko na seko.
ⲓ̅ⲁ̅ⲛⲧⲟⲟⲩ ⲥⲉⲛⲁϩⲉ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲧⲟⲕ ⲇⲉ ⲕϣⲟⲟⲡ ⲁⲩⲱ ⲛⲧⲟⲟⲩ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲛⲑⲉ ⲛⲟⲩϩⲟⲓⲧⲉ ⲥⲉⲛⲁⲣⲡⲗϭⲉ
12 Okolinga yango lokola kazaka, mpe bakolongola yango lokola elamba mpo na kotia elamba mosusu. Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te! »
ⲓ̅ⲃ̅ⲁⲩⲱ ⲕⲛⲁⲥⲉϩⲥⲱϩⲟⲩ ⲛⲑⲉ ⲛⲟⲩⲣϣⲱⲛ ⲛⲥⲉϣⲓⲃⲉ ⲛⲧⲟⲕ ⲇⲉ ⲛⲧⲟⲕ ⲟⲛ ⲡⲉ ⲁⲩⲱ ⲛⲉⲕⲣⲟⲙⲡⲉ ⲛⲁⲱϫⲛ ⲁⲛ
13 Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo? »
ⲓ̅ⲅ̅ⲛⲧⲁϥϫⲟⲟⲥ ⲇⲉ ⲛⲛⲓⲙ ⲛⲛⲉϥⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲉⲛⲉϩ ϫⲉ ϩⲙⲟⲟⲥ ϩⲓ ⲟⲩⲛⲁⲙ ⲙⲙⲟⲓ ϣⲁⲛϯⲕⲱ ⲛⲛⲉⲕϫⲁϫⲉ ⲛϩⲩⲡⲟⲡⲟⲇⲓⲟⲛ ⲛⲛⲉⲕⲟⲩⲉⲣⲏⲧⲉ
14 Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.
ⲓ̅ⲇ̅ⲙⲏ ⲛϩⲉⲛⲗⲓⲧⲟⲩⲣⲅⲓⲕⲟⲛ ⲁⲛ ⲙⲡⲛⲁ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲛⲉ ⲉⲩⲧⲛⲛⲟⲟⲩ ⲙⲙⲟⲟⲩ ⲉϩⲉⲛⲇⲓⲁⲕⲟⲛⲓⲁ ⲉⲧⲃⲉ ⲛⲉⲧⲛⲁⲕⲗⲏⲣⲟⲛⲟⲙⲓ ⲛⲟⲩⲟⲩϫⲁⲓ

< Ba-Ebre 1 >