< Ba-Ebre 9 >
1 Boyokani ya liboso ezalaki na mibeko ya losambo, mpe na Esika ya bule oyo ezalaki ya mokili.
İlk antlaşmanın tapınma kuralları ve dünyasal tapınağı vardı.
2 Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale: kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.
Bir çadır kurulmuştu. Kutsal Yer denen birinci bölmede kandillik, masa ve adak ekmekleri bulunurdu.
3 Sima na rido ya mibale, ezalaki na etando oyo bazalaki kobenga « Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
İkinci perdenin arkasında En Kutsal Yer denen bir bölme vardı.
4 Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.
Altın buhur sunağıyla her yanı altınla kaplanmış Antlaşma Sandığı buradaydı. Sandığın içinde altından yapılmış man testisi, Harun'un filizlenmiş değneği ve antlaşma levhaları vardı.
5 Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.
Sandığın üstünde Bağışlanma Kapağı'nı gölgeleyen yüce Keruvlar dururdu. Ama şimdi bunların ayrıntılarına giremeyiz.
6 Wana biloko oyo nyonso esilaki kotiama, Banganga-Nzambe bazalaki kokota, mbala na mbala, na eteni ya liboso ya Mongombo mpo na kosala mosala na bango.
Her şey böyle düzenlendikten sonra kâhinler her zaman çadırın ilk bölmesine girer, tapınma görevlerini yerine getirirler.
7 Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
Ama iç bölmeye yılda bir kez yalnız başkâhin girebilir. Üstelik kendisi için ve halkın bilmeden işlediği suçlar için sunacağı kurban kanı olmaksızın giremez.
8 Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.
Kutsal Ruh bununla çadırın ilk bölmesi durdukça, kutsal yere giden yolun henüz açıkça gösterilmediğini belirtiyor.
9 Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.
Bu, şimdiki çağ için bir örnektir; sunulan kurbanlarla sunuların tapınan kişinin vicdanını yetkinleştiremediğini gösteriyor.
10 Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola: mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
Bunlar yalnız yiyecek, içecek, çeşitli dinsel yıkanmalarla ilgilidir; yeni düzenin başlangıcına kadar geçerli olan bedensel kurallardır.
11 Kasi tango Klisto ayaki lokola Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na kopesa biso biloko oyo asilaki kozwa mpo na biso, akatisaki Mongombo ya monene makasi mpe ya kokoka; ezali Mongombo oyo esalema na maboko ya bato te, ezali ya mokili oyo te.
Ama Mesih, gelecek iyi şeylerin başkâhini olarak ortaya çıktı. İnsan eliyle yapılmamış, yani bu yaratılıştan olmayan daha büyük, daha yetkin çadırdan geçti.
12 Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela. (aiōnios )
Tekelerle danaların kanıyla değil, sonsuz kurtuluşu sağlayarak kendi kanıyla kutsal yere ilk ve son kez girdi. (aiōnios )
13 Pamba te makila ya bantaba, makila ya bangombe ya mibali mpe putulu ya bangombe ya basi, oyo basopelaka bato ya mbindo, epetolaka kaka libanda ya nzoto;
Tekelerle boğaların kanı ve serpilen düve külü murdar olanları kutsal kılıyor, bedensel açıdan temizliyor.
14 nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi. (aiōnios )
Öyleyse sonsuz Ruh aracılığıyla kendini lekesiz olarak Tanrı'ya sunmuş olan Mesih'in kanının, diri Tanrı'ya kulluk edebilmemiz için vicdanımızı ölü işlerden temizleyeceği ne kadar daha kesindir! (aiōnios )
15 Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala. (aiōnios )
Bu nedenle, çağrılmış olanların vaat edilen sonsuz mirası almaları için Mesih yeni antlaşmanın aracısı oldu. Kendisi onları ilk antlaşma zamanında işledikleri suçlardan kurtarmak için fidye olarak öldü. (aiōnios )
16 Pamba te soki moto akomi mokanda mpo ete moto songolo akitana na biloko na ye na mokolo oyo akokufa, asengeli liboso kokufa mpo ete biloko oyo akotika ekoma ya mokitani oyo ye asilaki kopona.
Ortada bir vasiyet varsa, vasiyet edenin ölümünün kanıtlanması gerekir.
17 Mokanda yango ezwaka nguya kaka soki mokomi na yango akufi; kasi soki mokomi azali nanu na bomoi, ezali na nguya ata moke te.
Çünkü vasiyet ancak ölümden sonra geçerli olur. Vasiyet eden yaşadıkça, vasiyetin hiçbir etkinliği yoktur.
18 Yango wana mpe, boyokani ya liboso ekokaki kozala na nguya te soki makila esopanaki te.
Bu nedenle ilk antlaşma bile kan akıtılmadan yürürlüğe girmedi.
19 Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.
Musa, Kutsal Yasa'nın her buyruğunu bütün halka bildirdikten sonra su, al yapağı, mercanköşkotu ile danaların ve tekelerin kanını alıp hem kitabın hem de bütün halkın üzerine serpti.
20 Alobaki: « Oyo ezali makila ya boyokani oyo Nzambe atindi bino kobatela. »
“Tanrı'nın uymanızı buyurduğu antlaşmanın kanı budur” dedi.
21 Bongo, na makila yango, asopelaki lisusu Mongombo mpe bisalelo nyonso ya losambo.
Aynı biçimde çadırın ve tapınmada kullanılan bütün eşyaların üzerine kan serpti.
22 Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.
Nitekim Kutsal Yasa uyarınca hemen her şey kanla temiz kılınır, kan dökülmeden bağışlama olmaz.
23 Boye, lokola bililingi ya biloko oyo ezali kati na Likolo esengelaki kopetolama ndenge wana, ezalaki na tina ete yango moko mpe biloko ya Likolo epetolama na nzela ya bambeka oyo eleki malamu.
Böylelikle aslı göklerde olan örneklerin bu kurbanlarla, ama gökteki asıllarının bunlardan daha iyi kurbanlarla temiz kılınması gerekti.
24 Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.
Çünkü Mesih, asıl kutsal yerin örneği olup insan eliyle yapılan kutsal yere değil, ama şimdi bizim için Tanrı'nın önünde görünmek üzere asıl göğe girdi.
25 Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.
Başkâhin her yıl kendisinin olmayan kanla En Kutsal Yer'e girer; oysa Mesih kendisini tekrar tekrar sunmak için göğe girmedi.
26 Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye. (aiōn )
Öyle olsaydı, dünyanın kuruluşundan beri Mesih'in tekrar tekrar acı çekmesi gerekirdi. Oysa Mesih, kendisini bir kez kurban ederek günahı ortadan kaldırmak için çağların sonunda ortaya çıkmıştır. (aiōn )
27 Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,
İnsanın bir kez ölmesi, sonra da yargılanması kaçınılmaz olduğu gibi, Mesih de birçoklarının günahlarını yüklenmek için bir kez kurban edildi. İkinci kez, günah yüklenmek için değil, kurtuluş getirmek için kendisini bekleyenlere görünecektir.
28 ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.