< Ba-Ebre 9 >

1 Boyokani ya liboso ezalaki na mibeko ya losambo, mpe na Esika ya bule oyo ezalaki ya mokili.
初の契約には禮拜の定と世に屬する聖所とありき。
2 Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale: kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.
設けられたる幕屋あり、前なるを聖所と稱へ、その中に燈臺と案と供のパンとあり。
3 Sima na rido ya mibale, ezalaki na etando oyo bazalaki kobenga « Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
また第二の幕の後に至 聖所と稱ふる幕屋あり。
4 Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.
その中に金の香壇と金にて徧く覆ひたる契約の櫃とあり、この中にマナを納れたる金の壺と芽したるアロンの杖と契約の石碑とあり、
5 Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.
櫃の上に榮光のケルビムありて贖罪所を覆ふ。これらの物に就きては、今 一々 言ふこと能はず、
6 Wana biloko oyo nyonso esilaki kotiama, Banganga-Nzambe bazalaki kokota, mbala na mbala, na eteni ya liboso ya Mongombo mpo na kosala mosala na bango.
此 等のもの斯く備りたれば、祭司たちは常に前なる幕屋に入りて禮拜をおこなふ。
7 Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
されど奧なる幕屋には、大 祭司のみ年に一度おのれと民との過失のために献ぐる血を携へて入るなり。
8 Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.
之によりて聖 靈は前なる幕屋のなほ存するあひだ、至 聖所に入る道の未だ顯れざるを示し給ふ。
9 Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.
この幕屋はその時のために設けられたる比喩なり、之に循ひて献げたる供物と犧牲とは、禮拜をなす者の良心を全うすること能はざりき。
10 Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola: mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
此 等はただ食物・飮物さまざまの濯事などに係り、肉に屬する定にして、改革の時まで負せられたるのみ。
11 Kasi tango Klisto ayaki lokola Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na kopesa biso biloko oyo asilaki kozwa mpo na biso, akatisaki Mongombo ya monene makasi mpe ya kokoka; ezali Mongombo oyo esalema na maboko ya bato te, ezali ya mokili oyo te.
然れどキリストは來らんとする善き事の大 祭司として來り、手にて造らぬ此の世に屬せぬ更に大なる全き幕屋を經て、
12 Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela. (aiōnios g166)
山羊と犢との血を用ひず、己が血をもて只 一たび至 聖所に入りて、永遠の贖罪を終へたまへり。 (aiōnios g166)
13 Pamba te makila ya bantaba, makila ya bangombe ya mibali mpe putulu ya bangombe ya basi, oyo basopelaka bato ya mbindo, epetolaka kaka libanda ya nzoto;
もし山羊および牡牛の血、牝牛の灰などを穢れし者にそそぎて其の肉體を潔むることを得ば、
14 nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi. (aiōnios g166)
まして永遠の御靈により瑕なくして己を神に献げ給ひしキリストの血は、我らの良心を死にたる行爲より潔めて活ける神に事へしめざらんや。 (aiōnios g166)
15 Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala. (aiōnios g166)
この故に彼は新しき契約の中保なり。これ初の契約の下に犯したる咎を贖ふべき死あるによりて、召されたる者に約束の永遠の嗣業を受けさせん爲なり。 (aiōnios g166)
16 Pamba te soki moto akomi mokanda mpo ete moto songolo akitana na biloko na ye na mokolo oyo akokufa, asengeli liboso kokufa mpo ete biloko oyo akotika ekoma ya mokitani oyo ye asilaki kopona.
それ遺言は必ず遺言 者の死を要す。
17 Mokanda yango ezwaka nguya kaka soki mokomi na yango akufi; kasi soki mokomi azali nanu na bomoi, ezali na nguya ata moke te.
遺言は遺言 者 死にてのち始めて效あり、遺言 者の生くる間は效なきなり。
18 Yango wana mpe, boyokani ya liboso ekokaki kozala na nguya te soki makila esopanaki te.
この故に初の契約も血なくして立てしにあらず。
19 Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.
モーセ律法に循ひて諸般の誡命をすべての民に告げてのち、犢と山羊との血また水と緋色の毛とヒソプとをとりて、書および凡ての民にそそぎて言ふ、
20 Alobaki: « Oyo ezali makila ya boyokani oyo Nzambe atindi bino kobatela. »
『これ神の汝らに命じたまふ契約の血なり』と。
21 Bongo, na makila yango, asopelaki lisusu Mongombo mpe bisalelo nyonso ya losambo.
また同じく幕屋と祭のすべての器とに血をそそげり。
22 Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.
おほよそ律法によれば、萬のもの血をもて潔めらる。もし血を流すことなくば、赦さるることなし。
23 Boye, lokola bililingi ya biloko oyo ezali kati na Likolo esengelaki kopetolama ndenge wana, ezalaki na tina ete yango moko mpe biloko ya Likolo epetolama na nzela ya bambeka oyo eleki malamu.
この故に天に在るものに象りたる物は此 等にて潔められ、天にある物は此 等に勝りたる犧牲をもて潔めらるべきなり。
24 Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.
キリストは眞のものに象れる、手にて造りたる聖所に入らず、眞の天に入りて今より我等のために神の前にあらはれ給ふ。
25 Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.
これ大 祭司が年ごとに他の物の血をもて聖所に入るごとく、屡次おのれを献ぐる爲にあらず。
26 Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye. (aiōn g165)
もし然らずば世の創より以來しばしば苦難を受け給ふべきなり。然れど今、世の季にいたり己を犧牲となして罪を除かんために一たび現れたまへり。 (aiōn g165)
27 Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,
一たび死ぬることと死にてのち審判を受くることとの人に定りたる如く、
28 ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.
キリストも亦おほくの人の罪を負はんが爲に一たび献げられ、復 罪を負ふことなく、己を待 望む者に再び現れて救を得させ給ふべし。

< Ba-Ebre 9 >