< Ba-Ebre 8 >

1 Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba: tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.
Головна ж річ у то́му, про що я говорю: маємо Первосвященика, що засі́в на небеса́х, по прави́ці престолу величности,
2 Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba: Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.
що Він Священнослужи́тель святині й правдивої скинії, що її збудував був Госпо́дь, а не люди́на.
3 Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe atiamaka mpo na kobonza makabo mpe bambeka. Boye Yesu, Mokonzi na biso ya Banganga-Nzambe, asengeli mpe kozala na eloko ya kobonza lokola likabo to mbeka.
Усякий бо первосвященик настановляється, щоб прино́сити да́ри та жертви, а тому було треба, щоб і Цей щось мав, що принести.
4 Soki azalaki na mokili, alingaki kozala ata Nganga-Nzambe te, pamba te ezali kuna na Banganga-Nzambe oyo babonzaka makabo kolanda Mobeko,
Бо коли б на землі перебува́в, то не був би Він священиком, бо тут пробувають священики, що да́ри приносять за Зако́ном.
5 ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye: « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »
Вони служать о́бразові й тіні небесного, як Мойсеєві сказано, коли мав докінчи́ти скинію: „Дивись бо, сказав, зроби все за зразко́м, що тобі на горі був показаний!“
6 Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.
А тепер оде́ржав Він краще служі́ння, поскільки Він посередник і кращого заповіту, який на кращих обітницях був узаконений.
7 Solo, soki boyokani ya liboso ezangaki pamela, tina ya koluka boyokani ya mibale elingaki kozala te.
Бо коли б отой перший був бездоганний, не шукалося б місця для другого.
8 Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki: « Na mikolo ekoya, nakosala Boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda:
Бо їм докоряючи, каже: „Ото дні надхо́дять, говорить Господь, коли з домом Ізраїля й з Юдиним домом Я складу́ Заповіта Ново́го,
9 ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito, pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai, Ngai mpe napesaki bango mokongo, elobi Nkolo.
не за заповітом, що його Я склав був з отцями їхніми дня, коли взяв їх за руку, щоб вивести їх із землі єгипетської. А що вони не залишилися в Моїм заповіті, то й Я їх покинув, говорить Господь!
10 Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo: ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Оце Заповіт, що його Я складу́ по тих днях із домом Ізраїлевим, говорить Господь: Покладу Я Зако́ни Свої в їхні думки́, і на їхніх серцях напишу́ їх, і буду їм Богом, вони ж будуть наро́дом Моїм!“
11 Moko te akoteya lisusu moninga to ndeko na ye na koloba: Yeba Nkolo! Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo,
І кожен не буде навчати свого ближнього, і кожен брата свого, промовляючи: „Пізнай Господа“! Усі бо вони будуть знати Мене від мало́го та аж до великого з них!
12 nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »
Буду бо Я милости́вий до їхніх неправд, і їхніх гріхів не згадаю Я більш“!
13 Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.
Коли ж каже „Нови́й Заповіт “, то тим назвав перший стари́м. А що́ порохня́віє й старі́є, те близьке́ до зотління.

< Ba-Ebre 8 >