< Ba-Ebre 6 >

1 Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,
Laissons donc les commencements de ce qu'il y a à dire sur le Christ, mettons-nous à ce qu'il y a de plus achevé, ne recommençons pas à poser les principes fondamentaux: renoncement aux oeuvres mortes, foi en Dieu,
2 ndenge nyonso ya kobatisa, kotiela bato maboko, lisekwa ya bakufi, mpe etumbu ya seko. (aiōnios g166)
doctrine des baptêmes, imposition des mains, résurrection des morts, jugement éternel. (aiōnios g166)
3 Soki Nzambe apesi biso nzela, tokomipesa nde na mateya oyo ekoki mpo na mikolo.
Tout cela nous le ferons, si Dieu le permet.
4 Solo, ekoki kosalema te ete bato oyo Nzambe angengisaki na pole na Ye, oyo bamekaki elengi ya likabo ya Lola, oyo basanganaki na Molimo Mosantu,
Car il est impossible que ceux qui ont été une fois éclairés, qui ont goûté le don céleste, qui ont eu part à l'Esprit saint,
5 oyo bamekaki elengi ya bolamu ya Liloba na Nzambe, oyo bamekaki nguya ya mokili oyo ezali koya, (aiōn g165)
qui ont goûté l'excellente parole de Dieu et les richesses du monde à venir (aiōn g165)
6 ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.
et qui retombent, soient ramenés à la repentance par une seconde régénération, eux qui, pour leur propre compte, remettent en croix le Fils de Dieu et le vouent aux outrages!
7 Tango mabele oyo enokelaka mvula emelaka mayi mpe ebotaka matiti ya tina mpo na bato oyo baloneli yango, Nzambe apambolaka yango.
En effet, une terre, arrosée par des pluies fréquentes et produisant des plantes utiles à ceux pour lesquels elle est cultivée, a part à la bénédiction de Dieu.
8 Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.
Mais si elle ne rapporte que des épines et des chardons», on l'abandonne, on la déclare presque maudite, on finit par y mettre le feu.
9 Atako tolobi bongo, balingami na ngai, tondimisami penza na tina na bino ete tozali kozela lokola libula biloko ya malamu koleka, biloko oyo ememaka na lobiko.
Cependant, bien-aimés, malgré ce langage, nous croyons pour vous à tout ce qu'il y a de mieux, à ce qui mène au salut.
10 Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.
Dieu est trop juste pour oublier votre activité, l'amour que vous avez montré pour son nom, les services passés et présents rendus par vous aux fidèles.
11 Kasi tolingi ete moto nyonso kati na bino akoba kolakisa bolingo yango kino na suka mpo ete makambo oyo bozali kotiela elikya ekokisama solo.
Nous désirons bien que chacun de vous montre jusqu'au bout le même zèle à affermir de plus en plus son espérance
12 Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.
de manière à ne pas vous relâcher, mais à imiter ceux que leur foi et leur persévérance ont mis en possession de l'héritage promis.
13 Tango Nzambe apesaki Abrayami elaka, akataki seleka na Kombo na Ye moko, pamba te ezali na moto moko te oyo aleki Nzambe mpo ete Ye Nzambe akata seleka na kombo na ye.
Quand Dieu fit sa promesse à Abraham (comme il ne pouvait prêter serment au nom d'un plus grand que lui, «il prêta serment sur son propre nom»),
14 Alobaki: « Nakopambola yo solo mpe nakopesa yo bakitani ebele. »
il dit: «Certes je te comblerai de bénédictions; certes je multiplierai beaucoup tes descendants».
15 Yango wana, Abrayami akangaki motema mpe azwaki oyo Nzambe alakaki ye.
Et alors, sa persévérance lui obtint ce qui lui avait été promis.
16 Nzokande, bato bakataka seleka na kombo ya moto oyo aleki bango, mpe seleka ezalaka ndanga oyo esukisaka tembe nyonso.
Les hommes, en effet, prêtent serment sur un plus grand qu'eux, et leur serment est une garantie, il met fin à toutes leurs discussions.
17 Yango wana, Nzambe akataki seleka mpo na kolakisa na bato oyo bazwaki elaka ete akobongola mokano na Ye te.
Eh bien, Dieu, voulant expressément montrer à ceux qui devaient recevoir l'héritage promis que sa volonté est immuable, intervint par un serment,
18 Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.
et il l'a fait pour que, par deux choses immuables, par lesquelles il était impossible que Dieu mentît, nous ayons un puissant encouragement qui soit notre refuge, nous saisissions l'espérance qui s'offre à nous.
19 Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule
Oui, cette espérance nous la tenons comme l'ancre de notre âme, ferme et solide, «elle pénètre dans le sanctuaire, derrière le voile»,
20 epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. (aiōn g165)
là où Jésus notre précurseur est entré pour nous quand il est devenu grand-prêtre «à tout jamais selon l'ordre de Melchisédek». (aiōn g165)

< Ba-Ebre 6 >