< Ba-Ebre 5 >
1 Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe aponamaka kati na bato mpe, lokola mosali ya Nzambe, atiamaka mpo na bolamu ya bato kati na makambo oyo etali boyokani na bango elongo na Nzambe. Mosala na ye ezali: kobonzela Nzambe makabo mpe bambeka mpo na masumu ya bato.
En effet, tout souverain sacrificateur pris du milieu des hommes est établi pour les hommes dans le service de Dieu, afin de présenter des offrandes et des sacrifices pour les péchés.
2 Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu.
Il peut être indulgent pour les ignorants et les égarés, puisque la faiblesse est aussi son partage.
3 Yango wana, likolo ya bolembu yango, asengeli kaka te kobonzaka mbeka mpo na masumu ya bato, kasi asengeli mpe kobonzaka yango mpo na masumu na ye moko.
Et c’est à cause de cette faiblesse qu’il doit offrir des sacrifices pour ses propres péchés, comme pour ceux du peuple.
4 Moto moko te akoki komikomisa mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde akomisaka moto mokonzi ya Banganga-Nzambe soki mpe kaka abengi ye, ndenge ezalaki mpo na Aron.
Nul ne s’attribue cette dignité, s’il n’est appelé de Dieu, comme le fut Aaron.
5 Ndenge moko mpe mpo na Klisto: amikomisaki te Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde alobaki na Ye: « Ozali Mwana na Ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
Et Christ ne s’est pas non plus attribué la gloire de devenir souverain sacrificateur, mais il la tient de celui qui lui a dit: Tu es mon Fils, je t’ai engendré aujourd’hui!
6 Mpe, na esika mosusu kati na Makomi, alobaki: « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. » (aiōn )
Comme il dit encore ailleurs: Tu es sacrificateur pour toujours, selon l’ordre de Melchisédek. (aiōn )
7 Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.
C’est lui qui, dans les jours de sa chair, ayant présenté avec de grands cris et avec larmes des prières et des supplications à celui qui pouvait le sauver de la mort, et ayant été exaucé à cause de sa piété, a appris,
8 Atako azalaki Mwana na Nzambe, kasi ayekolaki botosi na nzela ya pasi nyonso oyo amonaki.
bien qu’il fût Fils, l’obéissance par les choses qu’il a souffertes,
9 Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko; (aiōnios )
et qui, après avoir été élevé à la perfection, est devenu pour tous ceux qui lui obéissent l’auteur d’un salut éternel, (aiōnios )
10 pamba te Nzambe atia Ye Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kolanda molongo ya Melishisedeki.
Dieu l’ayant déclaré souverain sacrificateur selon l’ordre de Melchisédek.
11 Tozali na makambo mingi ya koloba na tina na likambo oyo, kasi ezali pasi mpo na kolimbola yango mpo ete bososolaka lisusu noki te.
Nous avons beaucoup à dire là-dessus, et des choses difficiles à expliquer, parce que vous êtes devenus lents à comprendre.
12 Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te.
Vous, en effet, qui depuis longtemps devriez être des maîtres, vous avez encore besoin qu’on vous enseigne les premiers rudiments des oracles de Dieu, vous en êtes venus à avoir besoin de lait et non d’une nourriture solide.
13 Nzokande, moto nyonso oyo atikalaka kaka na miliki azali mwana moke mpe ayebi te liloba oyo eteyaka bosembo.
Or, quiconque en est au lait n’a pas l’expérience de la parole de justice; car il est un enfant.
14 Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.
Mais la nourriture solide est pour les hommes faits, pour ceux dont le jugement est exercé par l’usage à discerner ce qui est bien et ce qui est mal.