< Ba-Ebre 4 >
1 Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli.
φοβηθωμεν ουν μηποτε καταλειπομενης επαγγελιας εισελθειν εις την καταπαυσιν αυτου δοκη τις εξ υμων υστερηκεναι
2 Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te.
και γαρ εσμεν ευηγγελισμενοι καθαπερ κακεινοι αλλ ουκ ωφελησεν ο λογος της ακοης εκεινους μη συγκεκραμενος τη πιστει τοις ακουσασιν
3 Sik’oyo, biso oyo tondimi, tozali kokota kati na bopemi yango kolanda ndenge Nzambe alobaki: « Yango wana, kati na kanda na ngai, nakataki seleka oyo: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › » Nzambe alobaki bongo, atako misala na Ye emonanaki wuta na tango oyo akelaki mokili.
εισερχομεθα γαρ εις την καταπαυσιν οι πιστευσαντες καθως ειρηκεν ως ωμοσα εν τη οργη μου ει εισελευσονται εις την καταπαυσιν μου καιτοι των εργων απο καταβολης κοσμου γενηθεντων
4 Pamba te, na esika moko, elobami boye na tina na mokolo ya sambo: « Boye, na mokolo ya sambo, Nzambe akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala. »
ειρηκεν γαρ που περι της εβδομης ουτως και κατεπαυσεν ο θεος εν τη ημερα τη εβδομη απο παντων των εργων αυτου
5 Mpe, kati na eteni oyo esili koleka, alobi: « Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! »
και εν τουτω παλιν ει εισελευσονται εις την καταπαυσιν μου
6 Boye, lokola emonani polele ete ezali nanu na bato oyo basengeli kokota kati na bopemi yango, mpe ete bato oyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu bakotaki te mpo ete batosaki Nzambe te,
επει ουν απολειπεται τινας εισελθειν εις αυτην και οι προτερον ευαγγελισθεντες ουκ εισηλθον δι απειθειαν
7 yango wana Nzambe abongisi lisusu mokolo moko oyo azali kobenga « lelo, » tango alobaki, sima na mikolo, na nzela ya Davidi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te. »
παλιν τινα οριζει ημεραν σημερον εν δαβιδ λεγων μετα τοσουτον χρονον καθως ειρηται σημερον εαν της φωνης αυτου ακουσητε μη σκληρυνητε τας καρδιας υμων
8 Pamba te, soki Jozue alonga penza kopesa bango bopemi, Nzambe alingaki lisusu te koloba na tina na mokolo mosusu.
ει γαρ αυτους ιησους κατεπαυσεν ουκ αν περι αλλης ελαλει μετα ταυτα ημερας
9 Boye, mpo na bato ya Nzambe, etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki.
αρα απολειπεται σαββατισμος τω λαω του θεου
10 Pamba te moto oyo akoti kati na bopemi ya Nzambe apemi na misala na ye, ndenge kaka Nzambe apemaki na misala na Ye.
ο γαρ εισελθων εις την καταπαυσιν αυτου και αυτος κατεπαυσεν απο των εργων αυτου ωσπερ απο των ιδιων ο θεος
11 Yango wana, tosala makasi mpo na kokota kati na bopemi yango mpo ete tokweya te kati na bozangi botosi lokola bana ya Isalaele.
σπουδασωμεν ουν εισελθειν εις εκεινην την καταπαυσιν ινα μη εν τω αυτω τις υποδειγματι πεση της απειθειας
12 Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
ζων γαρ ο λογος του θεου και ενεργης και τομωτερος υπερ πασαν μαχαιραν διστομον και διικνουμενος αχρι μερισμου ψυχης τε και πνευματος αρμων τε και μυελων και κριτικος ενθυμησεων και εννοιων καρδιας
13 Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe: nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
και ουκ εστιν κτισις αφανης ενωπιον αυτου παντα δε γυμνα και τετραχηλισμενα τοις οφθαλμοις αυτου προς ον ημιν ο λογος
14 Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.
εχοντες ουν αρχιερεα μεγαν διεληλυθοτα τους ουρανους ιησουν τον υιον του θεου κρατωμεν της ομολογιας
15 Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.
ου γαρ εχομεν αρχιερεα μη δυναμενον συμπαθησαι ταις ασθενειαις ημων πεπειραμενον δε κατα παντα καθ ομοιοτητα χωρις αμαρτιας
16 Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
προσερχωμεθα ουν μετα παρρησιας τω θρονω της χαριτος ινα λαβωμεν ελεον και χαριν ευρωμεν εις ευκαιρον βοηθειαν