< Ba-Ebre 3 >
1 Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.
nitu toki imrli vayi be tsratra kpukpah bi yohni samariya rilmre nitu vrerji wawu imbah kikle priest u tsatrambu
2 Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe.
ahindyi iwandi irji nyeme niwaua iwandi achwu yandakpe andi musa anandzji nitrerjia
3 Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.
wawu vrerji rhgrama iwandi azau musa indzji iwandi ameko ase kwukwu za koa nituma
4 Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.
do kowaniko ahem ndzjima indji iwandi amekongyea ahirji
5 Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda.
Musa aua indzji dindi iwandi atatindu nitre rrji atahugonitu nitu kpe iwandi basonatre ni koshishia
6 Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.
ama almashiu ahivre umulki nitra rji kitayi kimiyitrama idan kinji mreyema ni myi sronbu
7 Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
arzuto ndi tokima ibizji tsatraatre luwa indi worhlama
8 boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, na mokolo ya komekama kati na esobe
nati gbengle sronbi yandakpea ndi imrli isra ila bati ni myi wanyu ni nto ustra ni miji
9 epai wapi batata na bino bamekaki ngai mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai atako bamonaki misala na ngai
nintoh kima ba titimbibata wanyu ninkohn u trame baya ise isenza basi tondumu
10 mibu tuku minei. Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te. ›
nitukima miyi nimyi sron mu nitu kpewandi batre ni wuaa umitrendi baeigakhi kpanba nimyi sronbaye banala tonkomun gana
11 Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »
nitukima migbrerji niyinfumu bana rini myi wyumuna
12 Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi;
yazrime imirli vayi nanduba wluncle ni memesrohn iwandi anabi naa a tsatrambi iwandi irjiuvrli kbau kasra
13 kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.
mumako toki bika nwron kpanbi kowanevi idan kitovikima ndurimbinduna nduua kuri nitu gyru yalrenbuna
14 Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli,
kirga kbatumbu nu yesu kristi idan kikukirli ngangba niyo sronbu turji ni mumla he klekle
15 kolanda ndenge elobama: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »
hitu iwayimba bahlandi iuwa idan breohlama ha kpahlega nimyi sronbi na ivi u isimbaba
16 Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki Ye? Ezali te bato nyonso oyo Moyize abimisaki na Ejipito?
ihibagha mba bawolahn na kamaba na tsi babiwandi musa anjiba rji masar?
17 Asilikelaki banani mibu tuku minei? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe?
ihiba nghauba irji atinfumba har ise senza? ana biandi balatreuna ahibiandi ba vralcbonba hlega nimyiji ahi bangyai
18 Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye?
irji trendi bana kuson ni wuna? ana hi biandi bakamba niwo trema na?
19 Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.
kiya mla ya ba rinimyi sima bana latrena